Boye, kobanga te, pamba te nazali elongo na yo ; komitungisa te, mpo ete nazali Nzambe na yo ; nakoyeisa yo makasi mpe nakosunga yo ; solo, nasimbi yo na loboko na Ngai ya mobali, loboko oyo elongisaka.
Na eleko ya mokonzi wana, mokili ya Yuda ekobikisama, mpe mokili ya Isalaele ekozala na kimia. Tala kombo oyo bakobengela ye : Yawe azali Bosembo na biso.
Na tango wana, libota ya Yuda ekosangana elongo na libota ya Isalaele ; longwa na mokili ya nor, bakokende nzela moko kino na mokili oyo napesaki batata na bino lokola libula.
Oh Jakobi, mosali na Ngai, kobanga te ! Oh Isalaele, kozala na somo te, › elobi Yawe. ‹ Solo, nakobikisa yo wuta na mokili ya mosika, mpe bakitani na yo, wuta na mokili ya bowumbu ! Jakobi akozwa lisusu kimia mpe bopemi, mpe moto moko te akobangisa ye lisusu.
« Kasi tala boyokani oyo nakosala elongo na bato ya Isalaele, sima na mikolo wana, » elobi Yawe : « Nakotia mibeko na Ngai kati na makanisi na bango, nakokoma yango kati na mitema na bango, nakozala Nzambe na bango, mpe bango bakozala bato na Ngai.
Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakozongisa sik’oyo bato ya Jakobi oyo bakangamaki na bowumbu, nakoyokela libota mobimba ya Isalaele mawa mpe nakozala na zuwa makasi mpo na bosantu ya Kombo na Ngai.
Yesu alobaki na ye : — Kosimba Ngai te, pamba te nanu namati te epai ya Tata na Ngai. Kende nde epai ya bandeko na Ngai mpe yebisa bango ete nakeyi epai ya Tata na Ngai, oyo azali mpe Tata na bino ; epai ya Nzambe na Ngai, oyo azali mpe Nzambe na bino.
Boyokani nini ekoki kozala kati na Tempelo ya Nzambe mpe banzambe ya bikeko ? Pamba te biso tozali Ndako ya Nzambe na bomoi, kolanda maloba na Ye moko : « Nakovanda kati na bango mpe nakotambola elongo na bango. Nakozala Nzambe na bango, mpe bango bakozala bato na ngai. »