8 Na mokolo wana, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, ‹ nakobuka ekangiseli na bakingo na bango, nakokata basinga oyo bakangelaki bango mpe bakozala lisusu te bawumbu ya bapaya.
Na mokolo wana, bakolongola mokumba na likolo ya mapeka na bino mpe na ekangiseli na bakingo na bino. Tango mokumba yango ekolongwa, ekotika esika na bomengo.
Nakobebisa mokili ya Asiri kati na mokili na Ngai, nakonyata-nyata yango na likolo ya bangomba na Ngai ; ekangiseli na bango ekolongwa epai ya bato na Ngai mpe mokumba na bango ekolongwa na mapeka na bango. »
« Wuta kala, ozalaki kobuka ekangiseli na yo mpe kokata minyololo na yo. Ozalaki koloba : ‹ Nakozala lisusu mowumbu na yo te. › Yango wana, okomaki komilalisa na bangomba nyonso ya milayi mpe na se ya banzete nyonso ya mibesu lokola mwasi ya ndumba.
Bango, bato ya Babiloni, bakokoma mpe bawumbu ya bikolo ebele mpe ya bakonzi ya nguya ; nakosalela bango kolanda etamboli mpe misala ya maboko na bango. »
Bikolo nyonso ekotosa ye, mwana na ye ya mobali mpe koko na ye, kino tango ya mokili na ye mpe ekokoka ; bongo bikolo ebele mpe bakonzi ya nguya bakokonza ye.
« Kende koloba na Anania : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Solo, obuki ekangiseli ya banzete ; kasi na esika na yango, okolata nde ekangiseli ya ebende.
Nakozongisa lisusu na esika oyo : Yekonia, mwana mobali ya Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, mpe bato nyonso oyo, wuta na Yuda, bakendeki na bowumbu, na Babiloni, › elobi Yawe, ‹ pamba te nakobuka ekangiseli ya mokonzi ya Babiloni. › »
Na Takipenesi, mokolo ekokoma molili tango nakobuka ekangiseli ya Ejipito ; mpe kuna, makasi na yango oyo etielaka lolendo ekosila ; mapata ekozipa engumba Takipenesi mpe bamboka na yango ya mike ekokende na bowumbu.
Banzete ya bilanga ekobota bambuma, mpe mabele ekobota biloko ebele. Bato na Ngai bakozala na kimia na mabele na bango ; boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe tango nakobuka banzete ya ekangiseli na bango mpe nakokangola bango na maboko ya bato oyo banyokolaka bango.