Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 30:6 - Mokanda na Bomoi

6 Botuna mpe botala : Boni, mobali akoki kobota bana ? Bongo mpo na nini nazali komona moto nyonso ya makasi asimbi libumu na ye lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota mpe elongi na ye ekomi mawa-mawa ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 30:6
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi tango kaka bamonaki yango, bakamwaki mpe bakimaki na somo.


Yango wana, loketo na ngai ekomi na pasi, pasi moko ya makasi penza ekangi ngai lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota. Makambo oyo nazali koyoka ezali kopesa ngai somo, mpe oyo nazali komona ezali kosilisa ngai mayele.


Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe, Mosikoli ya Abrayami, alobi na libota ya Jakobi : « Jakobi akozala lisusu na soni te, elongi na ye ekozala lisusu ya kokawuka te.


Okoloba nini soki Yawe atie yo na makasi na se ya bokonzi ya bato oyo yo oteyaki. Okokoma na pasi te lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota ?


Yo oyo ovandaka na Libani, yo oyo otongaki zala na yo kati na bandako ya sedele, yeba ete okolela tango pasi ekokomela yo, pasi oyo ekokani na pasi ya mwasi oyo azali na pasi ya kobota !


Nayoki makelele lokola koganga ya mwasi oyo azali na pasi ya kobota, kolela ya pasi lokola mwasi oyo azali kobota mwana na ye ya liboso : ezali makelele ya kolela ya Siona, mboka kitoko ; azali kolela, maboko likolo, mpe azali koloba : « Nabebi na ngai, nakomi na suka liboso ya babomi. »


Bakobotola Kerioti mpe bandako na yango oyo batonga makasi. Na mokolo wana, mitema ya basoda ya mpiko ya Moabi ekokoma lokola motema ya mwasi oyo azali na pasi ya kobota.


Tala, mpongo moko ekopumbwa mpe ekokita na elulu, etanda mapapu na yango likolo ya Botsira ! Na mokolo wana, mitema ya basoda ya Edomi ekokoma lokola motema ya mwasi oyo azali na pasi ya kobota. › »


Bato ya Damasi balembi nzoto, bakomi koluka kokima mpe somo ekangi bango ; kobanga mpe pasi ezwi bango lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota.


Tango mokonzi ya Babiloni ayokaki sango na tina bango, alembaki nzoto, somo makasi ekangaki ye mpe akomaki na pasi lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota.


Tango toyokaki sango na tina na bango, tolembaki nzoto, somo makasi ekangaki biso mpe tokomaki na pasi lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota.


elongi na ye etelaki na somo mpe makanisi na ye ekomaki kotambola, nzoto na ye mobimba ekomaki kolenga mpe mabolongo na ye ekomaki kotutana.


Pasi ekomeli ye lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota ; kasi mpo ete azali lokola mwana azanga mayele, soki tango ya kobotama ekoki, abimaka na libumu ya mama na ye te.


Soki bamoni bango, bato ya bikolo bakomaka na somo mpe bilongi nyonso ekawukaka.


Bobotola wolo mpe palata na yango na makasi, pamba te bomengo na yango ezali penza mingi koleka mpe etonda na biloko ya motuya.


Tango bato bakokoma koloba : « Tozali sik’oyo na kimia, mpe tozali lisusu na mitungisi te, » ekozala na tango wana nde libebi ekokweyela bango na mbalakata, lokola pasi ya mwasi oyo azali kobota, mpe bakokoka kokima te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ