4 Tala liloba oyo Yawe alobaki na tina na Isalaele mpe Yuda :
Tango ezali koya, › elobi Yawe, ‹ tango oyo nakokangola bato na Ngai, Isalaele, mpe Yuda kati na bowumbu ; mpe nakozongisa bango na mokili oyo napesaki epai ya bakoko na bango mpo ete bakamata yango, › elobi Yawe. »
« Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Koganga ya kobanga mpe ya somo nde ezali koyokana ; kimia ezali lisusu te.