Nakosala ete bato ya Elami balenga liboso ya banguna na bango, liboso ya bato oyo bazali koluka kosala bango mabe ; nakokweyisela bango pasi na kanda na Ngai, » elobi Yawe. « Nakolanda bango na mopanga kino nakosilisa koboma bango.
Bino bato nyonso oyo bolekelaka wana ; boni, ezali kosala bino eloko moko te ? Botala malamu zingazinga na bino, ezali na pasi lokola pasi oyo ekomeli ngai ? Yawe atindeli ngai yango na mokolo ya kanda makasi na Ye.
Okoya kobundisa libota na Ngai, Isalaele, ndenge mapata ezipaka mokili. Oh Gogi, na mikolo ekoya, nakosala ete obundisa mokili na Ngai mpo ete bikolo mosusu eyeba Ngai tango Ngai moko nakomonisa bosantu na Ngai na nzela na yo na miso na bango.
Sik’oyo, nayei kolimbolela yo makambo oyo ekokomela bato na yo na mikolo ekoya, pamba te emoniseli oyo ezali kolobela lisusu makambo oyo ekosalema na mikolo ekoya.
kasi kati na Lola, ezali na Nzambe moko oyo alakisaka mabombami ; mpe alakisi mokonzi Nabukodonozori makambo oyo ekosalema na mikolo oyo ekoya. Tala ndoto oyo olotaki mpe bimoniseli oyo ozwaki tango ozalaki ya kolala na mbeto na yo :
Sima na yango, bana ya Isalaele bakozongela mpe bakoluka Yawe, Nzambe na bango, mpe Davidi, mokonzi na bango ; bakobelema epai na Yawe, na kolenga nyonso, mpo na kozwa mapamboli na Ye, na mikolo oyo ekolanda.
Na mikolo oyo ekoya, ngomba ya Tempelo ya Yawe ekolendisama ngwi na songe ya bangomba, ekoleka bangomba mikuse nyonso na molayi, mpe bikolo ekokende kotondana kuna.
Mpe sik’oyo, nazali kozonga na ngai epai ya bato na ngai ; kasi yaka, nakokebisa yo na tina na makambo oyo bato oyo bakosala bato na yo na mikolo ekoya.
Pamba te nayebi solo ete sima na kufa na ngai, bokomibebisa mpe bokopengwa mosika na nzela oyo natindaki bino. Na mikolo oyo ezali koya, bokono ekokweyela bino, pamba te bokosala mabe na miso ya Yawe mpe bokotumbola kanda na Ye na nzela ya misala ya maboko na bino. »