Jeremi 30:21 - Mokanda na Bomoi21 Mokonzi na bango akowuta kati na bango, mpe mokambi na bango akowuta kaka kati na bango ; nakobenda bango pene na Ngai mpe bakoya pene na Ngai, pamba te nani azali na nguya ya kopusana pene na Ngai ? › elobi Yawe. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Ndenge nkosi eyaka wuta na bazamba ya Yordani mpo na kokende na mapango epai wapi babokolaka bibwele, ndenge wana mpe nakobengana Edomi na mokili na yango na mbala moko ; Ngai moko nakopona moto oyo akokoma mokonzi ya Edomi. Nani akokani na Ngai ? Nani akoki kobeta tembe na Ngai ? Mobateli bibwele nani akoki kotelema liboso na Ngai ?
Ndenge nkosi eyaka wuta na bazamba ya Yordani mpo na kokende na mapango epai wapi babokolaka bibwele, ndenge wana mpe nakobengana Babiloni na mokili na yango na mbala moko ; Ngai moko nakopona moto oyo akokoma mokonzi ya Babiloni. Nani akokani na Ngai ? Nani akoki kobeta tembe na Ngai ? Mobateli bibwele nani akoki kotelema liboso na Ngai ? »