Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 30:20 - Mokanda na Bomoi

20 Bana na bango ya mibali bakozala lokola na tango ya kala, mpe lingomba na bango ekowumela liboso na Ngai ; nakopesa etumbu na bato nyonso oyo bazali konyokola bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 30:20
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Akoyanola libondeli ya bato oyo babungisaki biloko, mpe akondima mabondeli na bango.


Kasi Yo, ozali ndenge moko, mibu na Yo ekotikala kosuka te.


Nakosala ete banyokoli na yo balia misuni na bango moko ; bakolangwa makila na bango moko ndenge balangwaka masanga ya vino. Boye, moto nyonso akoyeba ete Ngai Yawe, nazali Mobikisi na yo, Mosikoli na yo, Elombe ya Jakobi. »


Tala liloba oyo Nkolo Yawe, Nzambe na yo, oyo abundelaka bato na Ye, alobi : « Tala, nalongoli kopo ya kizunguzungu, kopo ya kanda na Ngai, na loboko na yo, okomela yango lisusu te.


Okolendisama kati na bosembo : minyoko ekozala mosika na yo, okobanga lisusu eloko moko te, mpe somo ekokende mosika na yo ; ekomeka kopusana lisusu pene na yo te.


Isalaele abulisamaki mpo na Yawe lokola mbuma ya liboso ya milona na Ye : moto nyonso oyo azalaki kolia yango azalaki komema ngambo, mpe pasi ezalaki kokomela ye, › » elobi Yawe.


Kasi bato nyonso oyo bakosala yo mabe, bakosala bango mpe mabe ; banguna na yo nyonso bakokende na bowumbu ; bato oyo babotolaki yo biloko, bakobotola bango mpe biloko ; bato oyo banyokolaki yo, bakonyokola mpe bango.


Nakopesa bango motema se moko mpe etamboli se moko mpo ete batosaka Ngai tango nyonso mpo na bolamu na bango mpe mpo na bolamu ya bakitani na bango.


Oh Yawe, zongisa biso epai na Yo ; mpe tokozonga penza ! Yeisa mikolo na biso sika ndenge ezalaki na tango ya kala !


« Nakolendisa libota ya Yuda mpe nakobikisa libota ya Jozefi, nakozongisa bango lisusu na mokili na bango, pamba te nakoyokela bango mawa ; bakozala lokola bato oyo nasundolaki te, pamba te nazali Yawe, Nzambe na bango, mpe nakoyanola bango.


Nakobeta piololo mpo na kobenga bango mpe nakosangisa bango esika moko. Solo, nakokangola bango, mpe bakokoma ebele ndenge bazalaki liboso.


Babalabala ya engumba ekotonda lisusu na bilenge mibali mpe basi oyo bakokoma kosakana kuna. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ