Yawe alobaki na Moyize : — Koma yango na buku lokola ekaniseli, mpe loba na Jozue ete nakosilisa bato ya Amaleki na mokili ; bakotikala kokanisa bango lisusu te.
Kende sik’oyo, koma makambo oyo na etando ya libanga liboso na bango, koma yango na buku moko mpo ete na mikolo oyo ekoya, ezala lokola litatoli ya libela na libela.
Nakokokisa kati na mokili yango maloba nyonso oyo nalobaki mpo na kotelemela yango, maloba nyonso oyo ekomama kati na buku oyo, maloba oyo Jeremi asakolaki mpo na kotelemela bikolo nyonso.
Jeremi azwaki mokanda mosusu mpe apesaki yango na Baruki, mokomi mikanda, mwana mobali ya Neriya. Wana Jeremi azalaki koloba makambo oyo ezalaki kati na mokanda oyo Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, atumbaki, Baruki azalaki kokoma yango. Mpe makambo ebele mosusu ya lolenge wana ebakisamaki na kati.
Kasi yo, Daniele, batela maloba oyo lokola sekele mpe kanga buku kino na tango ya suka. Mingi bakotambola bipai na bipai, mpe boyebi ya bato ekokola makasi. »
Sik’oyo, koma nzembo oyo mpe lakisa yango yo moko epai ya bana ya Isalaele, mpe sala ete bayemba yango mpo ete ezala litatoli mpo na Ngai, liboso na bango.