Jeremi 30:19 - Mokanda na Bomoi19 Nzembo ya matondi mpe mingongo ya esengo ekobima kati na bango. Nakokomisa bango ebele, mpe motango na bango ekokoma ebele ; nakopesa bango lokumu, mpe bakotiolama lisusu te. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bato bakowuta na bingumba ya Yuda mpe na mboka oyo ezali pene ya Yelusalemi, na etuka ya Benjame mpe na ngambo ya weste ya bangomba mikuse, na etuka ya bangomba mpe ya Negevi ; mpo na koya kobonza kati na Tempelo ya Yawe bambeka ya kotumba, bambeka mosusu, makabo ya bambuma mpe malasi ya ansa, mpo na kobonza makabo ya kozongisa matondi, kati na Tempelo ya Yawe.
Natunaki : — Bato oyo bayei kosala nini ? Azongisaki : — Ezali maseke oyo eyaki kopanza Yuda mpo ete moto moko te akoka kotombola moto, kasi bato oyo ya misala ya maboko bayei nde kolengisa bango mpe kokweyisa nguya ya bikolo oyo etombolaki maseke na yango mpo na kobundisa Yuda mpe kopanza bato na yango.