Jeremi 30:18 - Mokanda na Bomoi18 tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Nakozongisa lisusu bomengo kati na bandako ya kapo ya Jakobi mpe nakoyokela bandako na ye mawa ; bakotonga lisusu engumba Siona oyo ebukana-bukana mpe ndako ya mokonzi, na esika na yango ya kala. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Solo, bakosomba lisusu bilanga na motuya ya palata, bakotia mikoloto mpe bakashe na mikanda oyo bakosombela bilanga yango, na miso ya batatoli, kati na mboka ya Benjame, kati na bamboka mike-mike oyo ezali zingazinga ya Yelusalemi, kati na bingumba ya Yuda mpe kati na bingumba ya mokili ya bangomba, kati na bingumba ya bitando mpe kati na bingumba ya Negevi ; pamba te nakozongisa bato na bango oyo bakendeki na bowumbu, elobi Yawe. »
ekoyokana kuna lokito ya banzembo ya esengo mpe ya masanzoli, mingongo ya mobandami na libala ya mwasi mpe ya mobali, mpe mingongo ya bato oyo bazali kobonza kati na Tempelo ya Yawe makabo ya kozongisa matondi, na koloba : ‘ Bozongisa matondi epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpo ete Yawe azali malamu ; bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! ’ Pamba te nakozongisa lisusu kitoko ya mokili yango ndenge ezalaki liboso, › elobi Yawe.
Na mokolo wana, nakokomisa bakambi ya Yuda lokola moto kati na liboke ya bakoni, lokola koni ya moto na se ya liboke ya matiti ekawuka : bakozikisa bikolo nyonso ya zingazinga na bango, ezala oyo ezali na ngambo ya loboko na bango ya mobali to ya mwasi. Kasi Yelusalemi ekotikala kaka na esika na yango.
Mokili mobimba, longwa na Geba kino na Rimoni, na ngambo ya sude ya Yelusalemi, ekokoma lokola etando ya Araba ; kasi Yelusalemi ekozala kaka na likolo, ekotikala kaka na esika na yango, longwa na Ekuke ya Benjame kino na esika oyo Ekuke ya kala ezalaki, na songe ya bamir, longwa na ndako molayi ya Ananeyeli kino na bikamolelo ya mokonzi.