Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 30:16 - Mokanda na Bomoi

16 Kasi bato nyonso oyo bakosala yo mabe, bakosala bango mpe mabe ; banguna na yo nyonso bakokende na bowumbu ; bato oyo babotolaki yo biloko, bakobotola bango mpe biloko ; bato oyo banyokolaki yo, bakonyokola mpe bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 30:16
44 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete bato nyonso oyo bayinaka Siona bakufa soni mpe bazonga sima !


Kasi soki boyoki na bokebi makambo oyo akoyebisa bino mpe soki bosaleli nyonso oyo nalobi, nakozala monguna ya banguna na bino mpe nakotelemela bato oyo bakotelemela bino.


pamba te Yawe akobundela bango mpe akobebisa bomoi ya bato oyo bakobebisa bomoi na bango.


Bato ya bikolo bakozwa bango mpe bakomema bango kino na esika na bango. Bongo, libota ya Isalaele ekokamata bango na mokili ya Yawe lokola basali ya mibali mpe ya basi. Bakokomisa bakangami bato oyo bakangaki bango mpe bakokonza bato oyo bakonzaki bango.


Oh mobebisi, mawa na yo, yo oyo nanu obebisama te ! Oh mofundi, mawa na yo, yo oyo nanu bafunda te ! Tango okosilisa kobebisa, yo mpe bakobebisa yo, tango okosilisa kofunda, yo mpe bakofunda yo.


Soki babundisi yo, ekowuta epai na Ngai te ; moto nyonso oyo akobundisa yo akokweya liboso na yo.


Nzokande, ebundeli moko te oyo esalemi mpo na kosala yo mabe ekolonga ; mpe monoko nyonso oyo ekotelemela yo na kosambisa, okokatela yango etumbu. Yango nde ekozala libula ya basali ya Yawe, mpe elonga na bango kowuta epai na Ngai, elobi Yawe.


Sopa kanda na Yo likolo ya bikolo ya bapaya oyo endimaka Yo te, likolo ya bato oyo babelelaka Kombo na Yo te, pamba te babebisi Jakobi, babebisi ye mobimba mpe bapanzi mokili na ye.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakobengana bato mabe oyo bavandaka zingazinga ya ekolo na Ngai, oyo bazali kobundisa libula oyo napesaki bato na Ngai, Isalaele, mpe nakolongola ekolo ya Yuda kati na bango.


Isalaele abulisamaki mpo na Yawe lokola mbuma ya liboso ya milona na Ye : moto nyonso oyo azalaki kolia yango azalaki komema ngambo, mpe pasi ezalaki kokomela ye, › » elobi Yawe.


Kasi soki mibu tuku sambo ekoki, nakopesa mokonzi ya Babiloni elongo na ekolo na ye mpe mokili ya bato ya Babiloni etumbu mpo na mabe oyo basalaki, » elobi Yawe, « mpe nakobebisa yango mpo na libela.


Mpo na nini ozali koganga mpo na pota na yo, mpe pasi na yo ezali kosila te ? Nasali yo boye mpo ete ngambo na yo ezali monene, mpe masumu na yo eleki ebele.


Boyoka ! Tala bango bazali kokima mpe babiki wuta na mokili ya Babiloni mpo na koyebisa kati na Siona ndenge nini Yawe, Nzambe na biso, azongisi mabe na mabe ; ndenge nini azongisi mabe na mabe likolo na Tempelo na Ye.


Lokito ya bampunda ya banguna mpe makelele ya makolo na yango ezali koyokana wuta na Dani, ezali koya mpo na kobebisa mokili mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango, engumba mpe bavandi na yango nyonso, bongo mokili mobimba eningani.


Bato bayokaki na bango kolela na ngai, kasi moto akobondisa ngai azali te ; banguna na ngai nyonso bayokaki sango ya pasi na ngai mpe basepelaki na makambo oyo osalaki. Tika ete okokisa solo mokolo oyo olakaki, mpo ete bango mpe bakoma lokola ngai !


Tika ete mabe na bango nyonso eya liboso na Yo ; sala bango ndenge osalaki ngai mpo na masumu nyonso oyo nasalaki ! Kolela na ngai ezali mingi mpe motema na ngai etondi na pasi !


Boye, bavandi nyonso ya Ejipito bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. Ozalaki na yo kaka lokola eyekamelo oyo basala na nzete oyo ebotaka na mayi, mpo na libota ya Isalaele.


Lokola obokolaka tango nyonso koyina bana ya Isalaele kati na motema na yo mpe obomisaki bango na mopanga tango bazalaki na pasi makasi, na tango oyo bazwaki etumbu mpo na masumu na bango,


Kasi sik’oyo, bikolo ebele esangani mpo na kotelemela yo ; bazali koloba : « Tika ete bosantu ya Siona esambwa mpe miso esepela komona kobebisama na yango ! »


Bongo monguna na ngai akomona yango mpe akoyoka soni makasi, ye oyo azalaki koloba na ngai : « Wapi Yawe, Nzambe na yo ? » Miso na ngai ekomona ndenge akokweya mpe ndenge bakonyata ye lokola potopoto ya nzela.


Akobebisa engumba na Ye nyonso na mpela mpe akobengana banguna na Ye kino kati na molili.


Na esika ete otondisama na nkembo, okotondisama na soni. Sik’oyo ekomi tango na yo, mela mpe tikala bolumbu ! Kopo oyo ewuti na loboko ya mobali ya Yawe eyei kozingela yo, mpe soni ekozipa nkembo na yo.


« Nayokaki bato ya Moabi kofinga bato na Ngai mpe ndenge bato ya Amoni bazalaki kotiola mpe koluka kobotola mabele na bango.


Bongo Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai alobaki : — Tatola maloba oyo : « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Nazali na zuwa makasi mpo na Yelusalemi mpe Siona.


Kasi nazali na kanda makasi mpo na bikolo oyo emonaka ete emikoka. Nazalaki kaka na kanda moke mpo na bato na Ngai, kasi bango bayei nde kobakisela bato na Ngai pasi. › »


« Nakokomisa Yelusalemi lokola kopo ya vino oyo elangwisaka bikolo nyonso ya zingazinga na yango ; bakozingela solo Yuda mpe Yelusalemi.


Nakosangisa bikolo nyonso, na Yelusalemi, mpo ete babundisa engumba yango ; bakobotola yango, bakobuka bandako na yango, bakozwa basi na yango na makasi mpo na kobebisa lokumu na bango, mpe ndambo ya bato kati na yango bakokende na bowumbu, bongo ndambo mosusu ya bato bakotikala.


Pamba te tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo apesaki ngai mokumba ya kosakola mpo na kotelemela bikolo oyo ebotolaki bino biloko na makasi alobi : Moto nyonso oyo akosimba yo akosimba nde mbuma ya liso na Ngai.


mpe alobaki na ye : — Kima mbangu penza, mpe kende koloba na elenge mobali wana : « Yelusalemi ekotikala lisusu na bamir te mpo ete motango ya bato mpe ya banyama oyo bazali kati na yango ekokoma ebele koleka.


Yawe, Nzambe na bino, akotia bilakeli nyonso ya mabe likolo ya banguna na bino, oyo bayinaka bino mpe banyokolaka bino.


Soki moto asengeli kokende na bowumbu akokende penza na bowumbu. Soki moto asengeli kokufa na mopanga akokufa penza na mopanga. Makambo oyo ezali penza kosenga ete basantu bazala na mpiko mpe kondima.


Tango bato ya Isalaele batikaki kolanda bato ya Filisitia, bazongaki mpo na kozwa na makasi biloko oyo ezalaki kati na molako ya bato ya Filisitia.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ