15 Mpo na nini ozali koganga mpo na pota na yo, mpe pasi na yo ezali kosila te ? Nasali yo boye mpo ete ngambo na yo ezali monene, mpe masumu na yo eleki ebele.
abalolaki mabele, alongolaki mabanga, mpe alonaki vino ya kitoko koleka ; atongaki kuna ndako molayi ya bakengeli mpe atimolaki ekamolelo ya vino. Akanisaki ete akobuka bambuma ya vino ya kitoko, kasi ebotelaki ye bambuma ya mabe !
Oh Yuda, ozali na banzambe ebele ndenge ezali motango ya bingumba na yo ; mpe lisusu, bitumbelo oyo otongaki mpo na kotumbela nzambe Bala, nzambe ya soni, malasi ya ansa ezali ebele ndenge ezali motango ya babalabala ya Yelusalemi. »
Mpo na nini pasi na ngai esilaka te mpe pota na ngai ya monene esilaka te ? Solo, namoni ete ozali mpo na ngai lokola etima ya lokuta, lokola mayi oyo bakoki kotiela motema te.
Mabe na yo ekomemela yo etumbu, kotomboka na yo ekomemela yo pamela. Tala malamu mpe sosola ete ezali penza mabe mpe bololo mpo na yo kosundola Yawe, Nzambe na yo, mpe kozanga kotosa Ngai, » elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Baninga na yo nyonso babosani yo, bazali komitungisa lisusu te mpo na yo. Nabetaki yo penza ndenge monguna abetaka, napesaki yo penza etumbu na kanda makasi, pamba te ngambo na yo ezalaki monene mpe masumu na yo eleki ebele.
Nakozongisela yo bomengo na yo mpe nakobikisa bapota na yo, › elobi Yawe. ‹ Lokola bazalaki kobenga yo ekolo basundola, Siona oyo moto moko te ayokelaka mawa ; ›
« Bango nyonso, ezala mikolo mpe bana mike, batondi na lokoso ya mbongo, kobanda na basakoli kino na Banganga-Nzambe : bango nyonso bazali kotambola na lokuta.
Banguna na ye bakomi bakonzi na ye, bayini na ye bazali na esengo ; pamba te Yawe atindeli Siona pasi likolo ya ebele ya masumu na ye. Bana na ye ya mibali bakei na bowumbu, bakangi bango mpe bazali kotambola liboso ya monguna na ye.
Naloba lisusu nini mpo na yo ? Nakokanisa yo na nani, Yelusalemi, mboka kitoko ? Nakokanisa yo na nani mpo ete nakoka kobondisa yo, Siona, mboka kitoko ? Pota na yo ezali monene lokola ebale monene ; nani akoki kobikisa yo ?
Kasi makambo wana esalemaki mpo na masumu ya basakoli ya Yelusalemi mpe mabe ya Banganga-Nzambe na yango, oyo basopaki kati na yango makila ya bato ya sembo.
Pamba te bokono ya Samari esilaka te ; pota na yango ezwi mpe mokili ya Yuda, ezali kopusana kino na ekuke ya bato na ngai, kino kutu na yango moko Yelusalemi.
Lokola nasalaki masumu liboso ya Yawe, nakomema mokumba ya kanda na Ye kino tango akozwa likambo na ngai na maboko mpe akolongisa ngai. Akobimisa ngai na pole, mpe nakomona bosembo na Ye.
Ezali ata na kisi moko te oyo ekoki kobikisa pota na yo ; pota na yo ezali monene makasi ! Moto nyonso oyo akoyoka sango ya makambo oyo ekomeli yo akobeta maboko mpo na kokweyisama na yo. Pamba te nani oyo ozangaki kosala mabe ?