Kasi bato ya Isalaele bazalaki kotiola bamemi sango ya Nzambe, bazalaki komona pamba makebisi na Ye mpe bazalaki kowolola basakoli na Ye kino Yawe kosilikela bato na Ye makasi ; mpe bakokaki kosala eloko moko te mpo na komibikisa liboso ya kanda makasi ya Yawe.
Loba na bango maloba oyo : ‹ Butu mpe moyi, miso na ngai ezali kobimisa mpinzoli, ezali kokawuka te ! Pamba te moseka na ngai, bato na ngai, bazali na pasi mingi mpo ete babetami makasi.
Boni, obwaki solo Yuda ? Oyini penza Siona ? Mpo na nini otindeli biso pasi makasi oyo ezangeli nzela ya kobika ? Tokanisaki ete tokozwa kimia ; nzokande, eloko moko ya malonga esalemi te ! Tokanisaki ete tokozala na nzoto kolongono ; nzokande, tozali kaka komona pasi na pasi !
Mpo na nini pasi na ngai esilaka te mpe pota na ngai ya monene esilaka te ? Solo, namoni ete ozali mpo na ngai lokola etima ya lokuta, lokola mayi oyo bakoki kotiela motema te.
Mpo na nini ozali koganga mpo na pota na yo, mpe pasi na yo ezali kosila te ? Nasali yo boye mpo ete ngambo na yo ezali monene, mpe masumu na yo eleki ebele.
Naloba lisusu nini mpo na yo ? Nakokanisa yo na nani, Yelusalemi, mboka kitoko ? Nakokanisa yo na nani mpo ete nakoka kobondisa yo, Siona, mboka kitoko ? Pota na yo ezali monene lokola ebale monene ; nani akoki kobikisa yo ?
Tango Efrayimi amonaki bokono na ye, mpe Yuda amonaki bapota na ye, Efrayimi abalukaki na ngambo ya Asiri mpe atindaki sango epai ya mokonzi monene mpo na kozwa lisungi, kasi ye akokoka kobikisa mpe kosilisa bapota na yo te.
Pamba te bokono ya Samari esilaka te ; pota na yango ezwi mpe mokili ya Yuda, ezali kopusana kino na ekuke ya bato na ngai, kino kutu na yango moko Yelusalemi.
Ezali ata na kisi moko te oyo ekoki kobikisa pota na yo ; pota na yo ezali monene makasi ! Moto nyonso oyo akoyoka sango ya makambo oyo ekomeli yo akobeta maboko mpo na kokweyisama na yo. Pamba te nani oyo ozangaki kosala mabe ?