Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 30:11 - Mokanda na Bomoi

11 Nazali elongo na yo mpe nakobikisa yo, › elobi Yawe. ‹ Ata nakobebisa nye bikolo nyonso epai wapi napanzaki bino ; kasi bino, nakobebisa bino nye te ; solo, nakopesa bino etumbu, kasi ekozala na ndenge ya bosembo ; nakozanga te kopamela bino. ›

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 30:11
29 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

— Kende koyebisa Davidi : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Nazali kotalisa yo bitumbu misato ; pona moko kati na yango mpo ete Ngai nakokisa yango lokola etumbu mpo na yo. › »


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi ; ezali ya koyemba na lindanda ya basinga mwambe.


atalisaka bolingo na Ye kino na milongo nkoto, alimbisaka mabe, botomboki mpe masumu, kasi azangaka te kopesa etumbu na moto oyo asali mabe, Nzambe oyo apesaka bakitani etumbu mpo na mabe ya batata na bango kino na molongo ya misato mpe ya minei !


Ezali Ngai, Ngai kaka nde nalimbisaka masumu na yo mpo na lokumu ya Ngai moko mpe nakokanisa lisusu masumu na yo te.


Bosala malamu mabongisi na bino, kasi ekobebisama ; boloba oyo bokoki koloba, kasi eloko moko te ekosalema, pamba te Nzambe azali elongo na biso !


Yeba ete bakobundisa yo, kasi bakolonga yo te ; pamba te nazali elongo na yo mpo na kobatela yo, elobi Yawe.


Kobanga bango te, pamba te nazali elongo na yo mpo na kobatela yo, —elobi Yawe.


Oh Yawe, pesa biso etumbu oyo ekoki na biso ; kasi kopesa yango na kanda te, noki te okosilisa koboma biso.


Nakokomisa yo lokola mir liboso ya bato oyo, mir moko ya makasi penza, mir ya bronze ; bakobundisa yo kasi bakolonga yo te, pamba te nazali elongo na yo mpo na kobikisa mpe kokangola yo, » elobi Yawe.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Mokili mobimba ekobebisama, kasi nakobebisa yango nyonso te.


Bomata na bamir mpo na kokota na Yelusalemi mpe bobebisa yango ; kasi bobebisa yango nyonso te. Bokata bitape na yango, pamba te etikali lisusu ya Yawe te.


Nzokande, ezala na mokolo wana, » elobi Yawe, « nakosilisa koboma bino nyonso te.


Bolamu ya Yawe esili te, mawa na Ye ekomi nanu na suka te ;


Nzokande, wana nazalaki nanu kosakola, Pelatia, mwana mobali ya Benaya, akufaki. Nakweyaki, elongi na ngai kino na mabele, mpe nagangaki na mongongo makasi : « Oh Nkolo Yawe ! Okosilisa solo koboma penza ndambo ya bana ya Isalaele, oyo batikali na bomoi ? »


Kasi nakobikisa ndambo ya bato kati na bino : bakobika na mopanga tango nakopanza bino kati na mikili mpe bikolo.


Nakosala te kolanda kanda na Ngai ya makasi, nakobebisa lisusu Efrayimi te. Pamba te Ngai, nazali Nzambe, nazali moto te ! Nazali Mosantu, Ngai oyo nazali kati na bino ; nakoya lisusu na kanda te.


Nzokande, ezala tango bakozala kati na mokili ya banguna na bango, nakosundola bango te, nakotombokela bango te kino kobebisa bango mpe kokata boyokani na Ngai elongo na bango ; pamba te Ngai nazali Yawe, Nzambe na bango.


« Elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te akokoma na zemi mpe akobota mwana mobali, bongo bakopesa Ye kombo Emanwele oyo elingi koloba : Nzambe elongo na biso. »


bolakisa bango kotosa makambo nyonso oyo natindaki bino. Boyeba malamu ete nazali elongo na bino mikolo nyonso kino na suka ya mokili.


Nazali na yo elongo, mpe moto moko te akolonga kobundisa yo mpe kosala yo mabe, pamba te nazali na bato mingi kati na engumba oyo.


Pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali Nzambe ya mawa, akosundola bino te, akobebisa bino te mpe akobosana te boyokani oyo asala na bakoko na bino tango alapaki ndayi.


Tika ete Nkolo azala elongo na molimo na yo ! Tika ete ngolu ezala na bino nyonso !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ