9 Lokola ezalaki likambo ya pamba mpo na Isalaele kosala kindumba, akomisaki mokili mbindo mpe asalaki kindumba na banzambe ya bikeko oyo basala na mabanga mpe na banzete.
Libula na yo ezali nde banzambe ya bikeko kati na mabanga ya lubwaku, oyo babongisa ; solo, yango nde ezali libula na yo. Solo penza, ezali epai na yango nde ozali kosopa makabo ya masanga ya vino mpe kobonza makabo ya bambuma. Boni, nasepela solo na makambo ya boye ?
Nakofutisa bango mbala mibale lifuti ya mabe na bango mpe ya masumu na bango, pamba te bakomisi mokili na Ngai mbindo na nzela ya bililingi mpe ya bikeko na bango oyo ezanga bomoi, mpe batondisi libula na Ngai na banzambe na bango ya bikeko mpe ya nkele. »
Namemaki bino na mokili oyo mabele na yango ebotaka malamu mpo ete bolia mbuma na yango ya kitoko ; kasi boyaki nde kokomisa mokili na Ngai mbindo mpe kokomisa libula na Ngai eloko ya nkele.
« Tombola miso na yo na likolo ya bangomba mpe tala : Boni, ezali penza na esika epai wapi ozangaki kosala ekobo ? Ovandaki na nzela mpo na kozela bamakangu, ovandaki wana lokola moto ya Arabi kati na esobe. Boye, okomisaki mokili mbindo na nzela ya ekobo na yo mpe ya misala na yo ya mabe.
Okamataki lisusu babiju ya kitoko oyo basala na wolo mpe na palata oyo napesaki yo, osalelaki yango bikeko ya mibali ; mpe elongo na yango, omipesaki na kindumba.
Batikaki ye bolumbu, bakendeki na bana na ye ya mibali mpe ya basi, mpe babomaki ye na mopanga. Akomaki lokola ndakisa mpo na basi mosusu, pamba te azwaki etumbu.
Boye, okanisaki lisusu kindumba na yo, oyo ozalaki kosala na bolenge tango mibali ya Ejipito bazalaki kosakana na mabele na yo mpe kosimbasimba tolo na yo ya bolenge.
Bakomaki na kindumba mpe bamipesaki na yango wuta bolenge na bango, na Ejipito. Kuna, bato bazalaki kosakana na mabele na bango mpe kosimbasimba tolo na bango ya bolenge.
Bongo, bato ya Yuda mpe ya Isalaele bakozonga lisusu kozala ekolo moko, bakopona mokonzi moko kaka mpe bakobima na mokili ya bowumbu, pamba te mokolo ya Jizireyeli ekozala mokolo monene.
Bato na Ngai bakomi kotuna toli epai ya nzambe ya ekeko oyo basala na nzete, mpe eteni ya nzete ezali koyanola bango. Molimo moko ya kindumba ezali kopengwisa bango, bakomi kosala kindumba mosika na Nzambe na bango,
Mawa na moto oyo alobaka na eteni ya nzete : « Telema ! » Mawa na moto oyo alobaka na libanga oyo ezanga bomoi : « Lamuka ! » Boni, ekeko ekoki solo kolakisa moto nzela ? Bazipa yango wolo mpe palata, kasi pema ezali te kati na yango.
Kasi Ngai, nazali koloba na bino : Mobali nyonso oyo alongoli mwasi na ye na libala, longola kaka soki mwasi yango akweyaki na ekobo, afungoleli ye nzela ya kosala kindumba ; mpe mobali oyo abali mwasi oyo balongola na libala asali mpe ekobo.