Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 3:8 - Mokanda na Bomoi

8 Napesaki mopengwi Isalaele mokanda na ye ya koboma libala mpe nabenganaki ye likolo ya kindumba na ye ; kasi namonaki ete ndeko na ye ya mwasi, mopengwi Yuda, abangaki te ; ye mpe abimaki mpo na kosala kindumba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 3:8
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yorami atongaki kutu bisambelo ya likolo ya bangomba ya Yuda ; atindikaki bato ya Yelusalemi na kosambela bikeko mpe apengwisaki Yuda.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Wapi mokanda ya koboma libala oyo Ngai nabenganelaki mama na bino ? To natekaki bino epai ya nani oyo Ngai nazalaki na niongo na ye ? Botekamaki mpo na masumu na bino ; mpe libala ya mama na bino ekufaki mpo na botomboki na bino.


Mabe na yo ekomemela yo etumbu, kotomboka na yo ekomemela yo pamela. Tala malamu mpe sosola ete ezali penza mabe mpe bololo mpo na yo kosundola Yawe, Nzambe na yo, mpe kozanga kotosa Ngai, » elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga.


« Soki mobali abomi libala na mwasi na ye, mpe mwasi yango akei kobala mobali mosusu ; boni, mobali yango akoki lisusu kozongela ye ? Bomoni te ete mokili mobimba ekokoma penza mbindo ? Nzokande yo, osalaki kindumba na mibali ebele, bongo olingi sik’oyo kozongela Ngai, » elobi Yawe.


« Boni ! Bozali koyoka te makambo bato oyo bazali kosala ? Bazali koloba : ‹ Yawe asundoli bituka mibale oyo aponaki. › Na bongo, bazali kotiola bato na Ngai, mpe moto ata moko te azali kozwa bango lokola ekolo.


« Na makambo ya boye, ndenge nini nalimbisa yo ? Ah Yelusalemi, bana na yo basundoli Ngai mpe bazali kolapa ndayi na bakombo ya banzambe ya bikeko oyo ezali ata banzambe te. Nakokisaki baposa na bango nyonso, kasi basalaki kaka ekobo mpe bakendeki na bandako ya basi ya ndumba.


Kulutu na yo ya mwasi, ezali Samari oyo avandi na ngambo ya nor ya mokili na yo elongo na bana na ye ya basi ; leki na yo ya mwasi ezali Sodome oyo avandi na ngambo ya sude ya mokili na yo elongo na bana na ye ya basi.


Otambolaki kaka te na banzela na bango mpe olandaki kaka te bizaleli na bango ya mbindo, kasi okomaki mabe koleka bango, na etamboli na yo nyonso.


Samari asalaki te ata kati-kati ya masumu oyo yo osalaki. Osalaki makambo ya mbindo koleka bango ; mpe na nzela ya makambo na yo nyonso ya mbindo, osalaki ete bandeko na yo ya basi bamonana lokola bato ya sembo koleka.


Mpe basangisaki na ye nzoto : ndenge mibali basangisaka nzoto na mwasi ya ndumba, ndenge wana mpe basalaki bango, Ohola mpe Oholiba.


Yango wana nakabaki ye na maboko ya bamakangu na ye, bato ya Asiri, oyo azalaki kokufela.


Solo, bana ya Isalaele bakowumela tango molayi bazanga mokonzi, bazanga mokambi, bazanga mbeka, bazanga libanga ya ekaniseli, bazanga efode mpe bazanga banzambe ya bikeko.


Soki mobali abali mwasi mpe, sima na mikolo, asepeli na ye lisusu te mpo ete amoni eloko moko ya mabe kati na ye, tika ete akoma mokanda ya koboma libala mpe apesa ye yango ; bongo na sima, abimisa ye na ndako na ye.


Mpe soki esali ete mobali oyo ya mibale mpe asepeli na ye lisusu te, tika ete ye mpe akokoma mokanda mpo na koboma libala mpe apesa ye yango, bongo na sima, abimisa ye na ndako na ye ; to soki esali ete mobali oyo ya mibale akufi,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ