Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 3:5 - Mokanda na Bomoi

5 Ozali kutu kotuna Ngai : ‹ Boni, kino tango nini okokanga kanda ? Kotomboka na yo ekosila te ? › Yango nde makambo ozali koloba, kasi ozali mpe kaka kokoba na misala na yo ya mabe. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 3:5
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sik’oyo, nazwi mokano ya kosala boyokani elongo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, mpo ete abwaka kanda makasi na Ye mosika na biso.


Nzambe Mobikisi na biso, zongela biso ! Longola kanda na Yo na tina na biso !


Boni, okosilikela biso penza mpo na libela ? Okokangela penza biso kanda mpo na tango nyonso ?


Nakosambisa mpo na libela te mpe nakozala na kanda tango nyonso te, noki te molimo ya moto nyonso oyo nasala ekokufa na miso na Ngai.


Bingumba na Yo ya bule ekomi esobe ; ezala Siona, yango mpe ekomi esobe ; Yelusalemi etikali lisusu na bato te !


Kende kosakola sango oyo na nor : ‹ Oh mopengwi Isalaele, zonga, › elobi Yawe, ‹ Nakokangela yo lisusu elongi te, pamba te nazali Moyengebene, › elobi Yawe. ‹ Nakokangela yo lisusu kanda te mpo na libela.


Mpo na nini bato ya Yelusalemi babungi nzela ? Mpo na nini bazali kokangama kaka na nzela na bango ya mabe ? Bamipesi makasi na makambo ya lokuta mpe baboyi kozongela Ngai.


Nayokaka na bokebi makambo nyonso oyo balobaka, kasi balobaka makambo ya solo te. Moko te kati na bango ayokaka motema pasi mpo na mabe oyo asalaka, alobaka : ‘ Nasali nini ? ’ Moto na moto akangamaka kaka na nzela na ye lokola mpunda oyo ezali kokende na bitumba.


Tala ndenge bakambi ya Isalaele basalelaka bokonzi na bango mpo na kosopa makila.


Mawa na bato oyo babongisaka kosala mabe, oyo bakanisaka kosala bato mabe na bambeto na bango ! Bakokisaka yango na tongo, pamba te bazali na makoki ya kosala yango.


Maboko na bango eyebi penza kosala makambo mabe, bakambi mpe basambisi na bango bakomi koluka kanyaka ; bongo bato ya makasi bazali kosala makambo nyonso oyo balingi, bayokanaka mpo na kosala bato mabe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ