Jeremi 3:2 - Mokanda na Bomoi2 « Tombola miso na yo na likolo ya bangomba mpe tala : Boni, ezali penza na esika epai wapi ozangaki kosala ekobo ? Ovandaki na nzela mpo na kozela bamakangu, ovandaki wana lokola moto ya Arabi kati na esobe. Boye, okomisaki mokili mbindo na nzela ya ekobo na yo mpe ya misala na yo ya mabe. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mokonzi apanzaki mpe bisambelo ya likolo ya bangomba oyo ezalaki na este ya Yelusalemi, na ngambo ya loboko ya mobali ya ngomba ya Libebi, oyo Salomo, mokonzi ya Isalaele, atongaki mpo na Asitarite, nzambe mwasi ya makambo mabe ya bato ya Sidoni ; mpo na Kemoshi, nzambe ya makambo mabe ya bato ya Moabi ; mpe mpo na Moloki, nzambe ya makambo mabe ya bato ya Amoni.