13 Ndima kaka mabe na yo, mpo ete otombokelaki Yawe, Nzambe na yo ; obebisaki ngolu na yo epai ya banzambe ya bapaya, na se ya banzete nyonso ya mibesu, mpe otosaki Ngai te, › » elobi Yawe.
Bato nyonso oyo babotama na molongo ya bana ya Isalaele bakabwanaki na bapaya nyonso ; batelemaki mpo na kotubela masumu na bango mpe bambeba ya batata na bango.
Bozali kopela na posa mabe na se ya banzete minene oyo babengaka terebente, na se ya banzete nyonso ya mibesu ; bozali kobonza bana na bino ya mibali lokola bambeka kati na lubwaku mpe kati na mabulu ya mabanga.
Tala liloba oyo Yawe alobi na tina na bato oyo : « Bato oyo balingaka kaka kotambola-tambola, bavandaka esika moko te. Yango wana, Yawe asepelaka na bango te, akobosana mabe na bango te mpe akopesa bango etumbu mpo na masumu na bango. »
« Wuta kala, ozalaki kobuka ekangiseli na yo mpe kokata minyololo na yo. Ozalaki koloba : ‹ Nakozala lisusu mowumbu na yo te. › Yango wana, okomaki komilalisa na bangomba nyonso ya milayi mpe na se ya banzete nyonso ya mibesu lokola mwasi ya ndumba.
Sala keba ! Noki te okotikala makolo ngulu mpe okokawuka mongongo likolo ya bitambola-tambola ! Kasi ozali koloba : ‹ Tika na yo ! Ngai nalingaka banzambe ya bapaya mpe nakolanda kaka bango. ›
« Tombola miso na yo na likolo ya bangomba mpe tala : Boni, ezali penza na esika epai wapi ozangaki kosala ekobo ? Ovandaki na nzela mpo na kozela bamakangu, ovandaki wana lokola moto ya Arabi kati na esobe. Boye, okomisaki mokili mbindo na nzela ya ekobo na yo mpe ya misala na yo ya mabe.
Soni ekomi lokola mbeto na biso, mpe kosambwa, lokola bulangeti mpo na komizipa ; pamba te biso mpe batata na biso, tosalaki masumu liboso ya Yawe, Nzambe na biso, totosaki Yawe te, wuta bolenge na biso. »
Tango Joziasi azalaki mokonzi, Yawe alobaki na ngai : « Omoni makambo Isalaele oyo apengwi nzela na Ngai azali kosala ? Amataki likolo ya bangomba nyonso mpe atambolaki na se ya banzete nyonso ya mibesu mpo na kosala kindumba.
Kasi okomaki kotia motema na kitoko na yo mpe kosalela lokumu na yo mpo na kosala kindumba. Olakisaki bolumbu na yo na moleki nzela nyonso mpe omipesaki na ye.
Bobebisa bisika nyonso oyo bato ya bikolo oyo bozali kobengana bazalaki kogumbamela banzambe na bango na likolo ya bangomba ya milayi mpe ya mikuse mpe na se ya banzete nyonso oyo ezali na makasa ya mobesu.