Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 3:12 - Mokanda na Bomoi

12 Kende kosakola sango oyo na nor : ‹ Oh mopengwi Isalaele, zonga, › elobi Yawe, ‹ Nakokangela yo lisusu elongi te, pamba te nazali Moyengebene, › elobi Yawe. ‹ Nakokangela yo lisusu kanda te mpo na libela.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 3:12
45 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boni, soki osali malamu, bakondima yo te ? Kasi soki osali malamu te, lisumu elali penza na ekuke na yo, mpe posa na yango ezali kobenda yo makasi ; kasi yo, longa yango.


Na tango ya Peka, mokonzi ya Isalaele, Tigilati-Pilezeri, mokonzi ya Asiri, ayaki kokota na makasi mpe azwaki bingumba Iyoni, Abele-Beti-Maaka, Yanoa, Kedeshi, Atsori mpe Galadi. Akamataki lisusu Galile kati na mokili ya Nefitali, mpe amemaki na makasi bato na Asiri.


kino tango Yawe abenganaki bango mosika na Ye, ndenge ayebisaki bango na nzela ya basali na Ye nyonso, basakoli. Boye, bamemaki bana ya Isalaele na bowumbu, mosika ya mokili na bango, na Asiri kino lelo.


Tango Oze akokisaki mibu libwa na bokonzi, mokonzi ya Asiri abotolaki Samari mpe amemaki bana ya Isalaele na bowumbu na Asiri. Atiaki bango na Ala mpe na bapembeni ya ebale ya Abori, na etuka ya Gozani mpe na bingumba ya Medi.


Tango Oze, mwana mobali ya Ela, mokonzi ya Isalaele, akokisaki mibu misato na bokonzi, Ezekiasi, mwana mobali ya Akazi, mokonzi ya Yuda, akomaki mokonzi.


Sik’oyo, nazwi mokano ya kosala boyokani elongo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, mpo ete abwaka kanda makasi na Ye mosika na biso.


Soki solo bozongeli Yawe, bandeko mpe bana na bino oyo bakendeki na bowumbu bakozwa ngolu liboso ya bato oyo bakangaki bango, mpe bakozonga na mokili oyo ; pamba te Yawe, Nzambe na bino, atonda na ngolu mpe na mawa. Solo, soki bozongeli Ye, akobalola te elongi na Ye mosika na bino. »


Kasi bolingo ya Yawe mpo na bato oyo batosaka Ye, mpe bosembo na Ye mpo na bakitani na bango,


Yawe ayokelaka bato mawa mpe asalelaka bango bolamu, asilikaka noki te mpe atonda na bolingo ;


azwaka biso makambo te tango nyonso, abombaka kanda na Ye te mpo na libela ;


Yawe atonda na ngolu mpe na mawa, asilikaka noki te mpe atonda na bolingo.


Kino tango nini, Yawe, okokangela biso kanda ? Kino tango nini zuwa na Yo ekopela lokola moto ?


Kasi Yo Nkolo, ozali Nzambe na mawa mpe na ngolu, osilikaka noki te, otonda na bolingo mpe na boyengebene.


Nkolo, ozali malamu, olimbisaka, otonda na bolingo mpo na bato nyonso oyo babelelaka Yo.


Moto oyo abombaka masumu na ye abongaka te, kasi ye oyo atubelaka mpe atikaka yango azwaka ngolu.


Oh bana ya Isalaele, bozonga epai na Ye oyo botombokeli makasi !


Nalongoli mabe na yo lokola lipata, masumu na yo lokola lipata ya tongo. Zonga epai na Ngai, pamba te nasili kosikola yo. »


Yawe alobaki na ngai : — Sakola maloba nyonso oyo kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi : « Boyoka malako ya boyokani oyo mpe bosalela yango !


Kasi sima na Ngai kobengana bango, nakoyokela bango lisusu mawa mpe nakozongisa moko na moko kati na libula na ye mpe kati na mokili na ye.


kasi bakoloba : ‹ Na Kombo na Yawe oyo abimisaki bakitani ya Isalaele na mokili ya nor mpe na bikolo nyonso epai wapi abenganaki bango. › Bongo, bakovanda na mokili na bango moko. »


« Soki mobali abomi libala na mwasi na ye, mpe mwasi yango akei kobala mobali mosusu ; boni, mobali yango akoki lisusu kozongela ye ? Bomoni te ete mokili mobimba ekokoma penza mbindo ? Nzokande yo, osalaki kindumba na mibali ebele, bongo olingi sik’oyo kozongela Ngai, » elobi Yawe.


« Bozonga epai na Ngai, bino batomboki, » elobi Yawe, « pamba te nazali mobali na bino ya libala. Kati na bino, nakozwa moto moko kati na engumba moko na moko, mpe bato mibale kati na etuka moko na moko, mpo na kozongisa bino na Siona.


Na tango wana, libota ya Yuda ekosangana elongo na libota ya Isalaele ; longwa na mokili ya nor, bakokende nzela moko kino na mokili oyo napesaki batata na bino lokola libula.


« Bino batomboki, bozonga epai na Ngai mpe nakobikisa bino na kopengwa na bino ! » « Solo, tokozonga epai na Yo, pamba te Yo, Yawe, nde ozali Nzambe na biso.


Ozali kutu kotuna Ngai : ‹ Boni, kino tango nini okokanga kanda ? Kotomboka na yo ekosila te ? › Yango nde makambo ozali koloba, kasi ozali mpe kaka kokoba na misala na yo ya mabe. »


Nakanisaki ete akozongela Ngai soki asilisi kosala makambo nyonso oyo azalaki na yango posa ; kasi azongeli Ngai te, mpe ndeko na ye ya mwasi, mopengwi Yuda, amonaki yango.


Nazali elongo na yo mpe nakobikisa yo, › elobi Yawe. ‹ Ata nakobebisa nye bikolo nyonso epai wapi napanzaki bino ; kasi bino, nakobebisa bino nye te ; solo, nakopesa bino etumbu, kasi ekozala na ndenge ya bosembo ; nakozanga te kopamela bino. ›


Efrayimi azali penza mwana na Ngai ya bolingo, mwana oyo nasepelaka na ye mingi te. Nzokande napamelaka ye tango nyonso, mpe nakanisaka ye tango nyonso. Yango wana, motema na Ngai esepelaka na ye, mpe nayokelaka ye mawa, » elobi Yawe.


« Tia bilembo na nzela, pika makonzi oyo elakisaka nzela na nzela yango ; sala penza keba na nzela na yo, na nzela oyo ozali kolanda. Oh Isalaele, mboka kitoko, zonga, zonga na bingumba na yo !


Tala, nakozongisa bango wuta na mokili ya nor mpe nakosangisa bango wuta na basuka ya mokili. Kati na bango, ekozala na bakufi miso mpe bakakatani, basi ya zemi mpe basi oyo bazali na pasi ya kobota ; bato ebele penza bakozonga.


wana nakokaki kobwaka bakitani ya Jakobi mpe ya Davidi, mosali na Ngai, mpe nalingaki te kopona moko kati na bana na ye mpo ete akamba bakitani ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi. Nakozongisa lisusu kitoko ya mokili na bango mpe nakoyokela bango mawa. › »


« Oh Isalaele, soki okozonga, zonga epai na Ngai, » elobi Yawe, « soki olongoli banzambe na yo ya bikeko liboso na Ngai mpe otiki kotambola libanda ya nzela na Ngai ;


Bolamu ya Yawe esili te, mawa na Ye ekomi nanu na suka te ;


Mpo na yango, loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakosangisa bino wuta na bikolo, nakozongisa bino wuta na mikili epai wapi napanzaki bino mpe nakozongisela bino lisusu mokili ya Isalaele. ›


Loba na bango : ‹ Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, nasepelaka na kufa ya moto mabe te ; nalingaka nde ete abongola bizaleli na ye mpo ete abika ! Bobongwana, bobongwana, oh libota ya Isalaele ! Mpo na nini bolingi kaka nzela ya kufa ? ›


Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakozongisa sik’oyo bato ya Jakobi oyo bakangamaki na bowumbu, nakoyokela libota mobimba ya Isalaele mawa mpe nakozala na zuwa makasi mpo na bosantu ya Kombo na Ngai.


Boya, tozonga epai na Yawe ! Akati-kati biso solo na biteni, kasi akobikisa biso ; azokisaki biso, kasi akotia kisi na bapota na biso.


Nzokande, soki bakotubela masumu na bango mpe masumu ya batata na bango, misala na bango ya mabe mpe botomboki na bango liboso na Ngai,


Bozala te lokola bakoko na bino, epai ya banani basakoli ya tango ya kala balobaki : Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Botika banzela mabe mpe misala na bino ya mabe, bozonga epai na Ngai ! › Kasi basalaki keba te na maloba na Ngai, mpe batosaki Ngai te, elobi Yawe.


soki ozongi epai na Yawe, Nzambe na yo ; soki yo mpe bana na yo botosi Ye, na mitema mpe na milimo na bino mobimba, na makambo nyonso oyo natindi yo lelo,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ