Bazongeli kosala masumu ya bakoko na bango, oyo baboyaki koyoka maloba na Ngai. Bazali kolanda banzambe mosusu mpo na kosalela yango. Libota ya Yuda mpe libota ya Isalaele babebisi boyokani oyo nasalaki elongo na bakoko na bango.
« Bino batomboki, bozonga epai na Ngai mpe nakobikisa bino na kopengwa na bino ! » « Solo, tokozonga epai na Yo, pamba te Yo, Yawe, nde ozali Nzambe na biso.
Napesaki mopengwi Isalaele mokanda na ye ya koboma libala mpe nabenganaki ye likolo ya kindumba na ye ; kasi namonaki ete ndeko na ye ya mwasi, mopengwi Yuda, abangaki te ; ye mpe abimaki mpo na kosala kindumba.
Ndeko na ye ya mwasi, Oholiba, amonaki makambo oyo nyonso ; kasi lokola posa ya kindumba elataki ye makasi, asalaki mobulu koleka kutu ndeko na ye ya mwasi.
Bato na Ngai batingami kaka kopesa Ngai mokongo. Ata babengi bango ete bakende epai na Ye-Oyo-Aleki-Likolo, moko te kati na bango azali kopesa Ye lokumu.