10 Atako bongo, ndeko na ye ya mwasi, mopengwi Yuda, azongaki epai na Ngai te na motema na ye mobimba ; azongaki na ye kaka likolo-likolo, » elobi Yawe.
Joziasi alongolaki banzambe nyonso ya bikeko ya nkele kati na bituka nyonso ya bana ya Isalaele. Apesaki mitindo na bato nyonso oyo bazalaki kati na Isalaele ete basalela Yawe, Nzambe na bango. Na bongo, na mikolo nyonso ya bomoi ya Joziasi, bapengwaki te liboso ya Yawe, Nzambe ya batata na bango.
Boloba na Nzambe : « Tala ndenge nini misala na Yo ebongi na kobanga yango ! Mpo na nguya monene na Yo, banguna na Yo bakomi koluka kokoma baninga na Yo.
Bazongeli kosala masumu ya bakoko na bango, oyo baboyaki koyoka maloba na Ngai. Bazali kolanda banzambe mosusu mpo na kosalela yango. Libota ya Yuda mpe libota ya Isalaele babebisi boyokani oyo nasalaki elongo na bakoko na bango.
Ah ! Soki nazalaki ata na ndako ya bapaya kati na esobe, nalingaki ata kokima bato na ngai mpe kozala mosika na bango, pamba te bango nyonso bazali bandumba, bazali lisanga ya bakosi !
Babelelaka Ngai te wuta na mozindo ya mitema na bango, kasi balelaka na bambeto na bango. Tango bamikataka banzoloko mpo na kozwa ble mpe vino ya sika, bakomaka nde mosika na Ngai.
« Mbala mingi, nazalaki kobwakela bilanga na bino bokono, banzete na bino ya ble mpe ya vino ekomaki kokawuka ; bongo mabanki ekomaki kolia banzete na bino ya figi mpe ya olive. Kasi atako bongo, bozongelaki Ngai te, » elobi Yawe.
Bato ya Yuda batamboli na boyengebene te, bakotisi likambo ya nkele kati na Isalaele mpe na Yelusalemi, pamba te bato ya Yuda babebisi bosantu ya Esika ya bule ya Yawe, Esika ya bule oyo Yawe alingaka makasi : babali basi oyo basambelaka nzambe mopaya.