Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 29:9 - Mokanda na Bomoi

9 Pamba te bazali nde kosakola makambo ya lokuta na Kombo na Ngai ; natindi bango te, » elobi Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 29:9
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Natindaki basakoli wana te, kasi tala ndenge bapoti mbangu mpo na kokende ; nalobaki na bango likambo moko te, kasi tala bango wana bazali kosakola !


Boyoka te maloba ya basakoli oyo bazali koloba na bino : ‹ Bokosalela mokonzi ya Babiloni te ! › Bazali kosakola makambo ya lokuta.


Natindaki bango te, » elobi Yawe, « bazali kosakola makambo ya lokuta na Kombo na Ngai. Nakobengana bino mpe bokokufa, bino mpe basakoli oyo bazali kosakola epai na bino. »


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na Akabi, mwana mobali ya Kolaya, mpe na tina na Sedesiasi, mwana mobali ya Maaseya, oyo bazali kosakola makambo ya lokuta epai na bino, na Kombo na Ngai : « Nakokaba bango na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe akoboma bango na miso na bino.


Pamba te basalaki kati na Isalaele ekobo elongo na basi ya baninga na bango, bapaya, mpe balobaki lokuta na Kombo na Ngai, nzokande Ngai natindaki bango te kosala bongo. Nayebi yango malamu, mpe Ngai moko nazali Motatoli na yango, » elobi Yawe.


« Tinda sango oyo epai ya bawumbu nyonso : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi na tina na Shemaya, moto ya Nekelami : Lokola Shemaya asakolaki makambo ya lokuta epai na bino, nzokande natindaki ye te, mpe amemi bino na kotia motema na lokuta,


Bimoniseli ya basakoli na yo ezalaki ya lokuta mpe ya pamba ; balakisaki yo masumu na yo te mpo ete okende na bowumbu te : masakoli oyo bazwelaki yo ezalaki ya mabe mpe ya lokuta !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ