Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 29:8 - Mokanda na Bomoi

8 Solo, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Bomitika te ete basakoli mpe bato ya soloka oyo bazali kati na bino bakosa bino : bondimela te bato oyo bazali kolimbolela bino bandoto.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 29:8
36 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe alobaki na ngai : — Basakoli bazali kosakola makambo ya lokuta na Kombo na Ngai. Natindaki bango te, naponaki bango te mpe nalobaki na bango likambo moko te. Bimoniseli mpe masakoli na bango ezali ya lokuta ; makambo nyonso oyo bazali kosakola ezali pamba, ewutaka nde na makanisi ya mitema na bango moko.


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Boyoka te makambo oyo basakoli bazali kosakola epai na bino !


Natindaki basakoli wana te, kasi tala ndenge bapoti mbangu mpo na kokende ; nalobaki na bango likambo moko te, kasi tala bango wana bazali kosakola !


« Nayoki makambo oyo basakoli ya lokuta bazali kosakola na Kombo na Ngai ; bazali koloba : ‹ Tala, naloti ndoto ! Naloti ndoto ! ›


Bakanisi ete bakoki kosala ete bato na Ngai babosana Kombo na Ngai na nzela ya ndoto oyo bazali koloba bango na bango, ndenge batata na bango babosanaki Kombo na Ngai mpo na kosalela nzambe Bala ?


Boye, boyokela te basakoli na bino, bato na bino ya soloka, bato na bino oyo balimbolaka bandoto, bato na bino oyo basololaka na bakufi, oyo bazali koloba na bino ete bosalela mokonzi ya Babiloni te.


Bongo mosakoli Jeremi alobaki lisusu na mosakoli Anania : « Anania, yoka ! Yawe atindi yo te ; mpe ozali kotindika bato oyo na kotia motema na makambo ya lokuta !


Tala makomi ya mokanda oyo mosakoli Jeremi atindaki, wuta na Yelusalemi, epai ya bakambi oyo batikalaki kati na bato oyo bakendeki na bowumbu, epai ya Banganga-Nzambe, epai ya basakoli mpe epai ya bato nyonso oyo Nabukodonozori amemaki na bowumbu, na Babiloni wuta na Yelusalemi.


Solo, bokoki koloba : « Yawe abimisi basakoli kati na biso awa na Babiloni ! »


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na Akabi, mwana mobali ya Kolaya, mpe na tina na Sedesiasi, mwana mobali ya Maaseya, oyo bazali kosakola makambo ya lokuta epai na bino, na Kombo na Ngai : « Nakokaba bango na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe akoboma bango na miso na bino.


Pamba te basalaki kati na Isalaele ekobo elongo na basi ya baninga na bango, bapaya, mpe balobaki lokuta na Kombo na Ngai, nzokande Ngai natindaki bango te kosala bongo. Nayebi yango malamu, mpe Ngai moko nazali Motatoli na yango, » elobi Yawe.


Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Bokanisa te ete bato ya Babiloni bakolongwa na mokili na bino. Te ! Bakolongwa te. ›


basakoli bazali kosakola makambo ya lokuta, Banganga-Nzambe bazali kosalela bokonzi na bango ndenge balingi, mpe bato na Ngai bazali kosepela bongo. Kasi bokosala nini na suka ? »


Bimoniseli ya basakoli na yo ezalaki ya lokuta mpe ya pamba ; balakisaki yo masumu na yo te mpo ete okende na bowumbu te : masakoli oyo bazwelaki yo ezalaki ya mabe mpe ya lokuta !


Bimoniseli na bango ezali ya pamba, mpe masakoli na bango ezali ya lokuta. Balobaka : ‘ Tala makambo oyo Yawe alobi, ’ nzokande Ngai Yawe, natindi bango te. Mpe bazelaka ete maloba na bango ekokisama !


Soki mokosi moko to moto moko ya lokuta ayei koloba : « Nakosakola mpo na yo ; » bongo moto yango azali na se ya milangwa ya vino to ya masanga mosusu ya makasi, moto ya boye asengeli kaka kozala mosakoli ya bato ya lolenge na ye.


Na mokolo wana, mosakoli moko na moko akozala na soni mpo na kosakola mpe koloba bimoniseli na ye ; akokosa lisusu bato te na kolataka bilamba ya basakoli, oyo basala na bapwale.


Pamba te bamasiya ya lokuta mpe basakoli ya lokuta bakobima, bakosala bilembo minene mpe bikamwa mpo na kokosa ata baponami, soki ekokaki kosalema.


Yesu azongisaki : — Bosala keba ete moko te akosa bino ! Pamba te bato mingi bakoya na Kombo na Ngai, bakoloba : « Ngai nde Masiya, » mpe « Tango ekoki ! » Bolanda bango te.


Mawa na bino soki bato nyonso bazali koloba malamu na tina na bino, pamba te ezali ndenge wana nde bakoko na bango basalaki basakoli ya lokuta !


Bato ya lolenge oyo basalelaka nde mabumu na bango, kasi basalelaka Klisto, Nkolo na biso, te. Bapengwisaka makanisi ya bato ya bindima-ndima na nzela ya maloba na bango ya elengi mpe ya sukali.


Na bongo, tokozala lisusu bana mike te oyo bambonge ebwaki-bwaki lokola bwato, mpe oyo lolenge nyonso ya mateya, ya lokuta mpe ya mayele mabe ya bato epumbwisi na mopepe.


Tika ete moko te akosa bino na maloba ezanga tina, pamba te ezali mpo na biloko ya ndenge wana nde kanda ya Nzambe ekweyelaka bato oyo batosaka Ye te.


Tika ete moko te akosa bino ; pamba te liboso ete mokolo yango ekoma, bato basengeli nanu kobwaka kondima, mpe motomboki oyo abongisami mpo na libebi asengeli nanu komonana.


Kasi bato mabe mpe ba-oyo bakosaka baninga bakozala kozinda kati na mabe, kokosa bato mosusu, mpe bango moko bakokosa bango.


Balingami na ngai, bondimaka te bato nyonso oyo babetaka tolo mpo na koloba ete batondisami na Molimo ya Nzambe ; kasi bomeka bango mpo na koyeba soki bazali penza ya Nzambe, pamba te basakoli ebele ya lokuta basili kopanzana na mokili.


Ezalaki kokosa bavandi nyonso ya mokili na nzela ya bikamwa oyo epesamelaki makoki ya kosala na miso ya nyama ya liboso. Ezalaki kopesa bango mitindo ete basala ekeko mpo na kopesa lokumu na nyama oyo babetaki mopanga kasi ezali na bomoi.


Kasi nyama ekangamaki elongo na mosakoli ya lokuta oyo azalaki kosala bikamwa na kombo ya nyama. Na nzela ya bikamwa yango, akosaki bato oyo batiamaki elembo ya nyama mpe bagumbamelaki ekeko na yango. Bango mibale : nyama mpe mosakoli ya lokuta, babwakamaki ya bomoi kati na liziba ya moto mpe ya sofolo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ