Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 29:7 - Mokanda na Bomoi

7 Boluka kimia mpe bolamu ya engumba epai wapi namemaki bino na bowumbu ; bobondela Yawe mpo na yango, pamba te soki yango ebongi, bino mpe bokozala malamu. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 29:7
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mpo ete bakoka kobonzaka mbeka ya solo kitoko epai ya Nzambe ya Likolo, mpe mpo ete basambelaka mpo na bomoi malamu ya mokonzi elongo na bana na ye ya mibali.


Tika ete makambo nyonso oyo Nzambe ya Likolo atindi mpo na Tempelo na Ye esalema ndenge kaka atindi yango, mpo ete kanda na Ye ekitela te mokili ya mokonzi mpe bana na ye ya mibali.


Bosenga kimia ya Yelusalemi ! Tika ete bato oyo balingaka yo, Yelusalemi, babika na kimia !


Bakalaka balobaki na mokonzi : — Moto oyo asengeli kokufa ! Maloba na ye ezali kolembisa basoda mpe bato oyo batikali kati na engumba oyo ; azali koluka bolamu ya bato oyo te, kasi azali nde koluka mabe na bango.


Yango wana, loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Atako nabenganaki bango kati na bikolo mpe napanzaki bango kati na mabota, kasi nazalaki mpo na bango lokola ndako ya bule kati na bikolo epai wapi bakendeki. ›


nzete yango ezali yo, mokonzi ! Okomi penza monene mpe makasi kino otuti mapata ; mpe bokonzi na yo ekeyi kino na suka ya mabele.


amilobelaki : « Boni ! Oyo ezali te Babiloni monene oyo natongaki lokola ndako ya mokonzi, na makasi na ngai, na nguya na ngai mpe mpo na lokumu ya bokonzi na ngai ? »


Tika ete moto nyonso atosa bakonzi ya leta, pamba te bokonzi nyonso ewutaka na Nzambe, mpe ezali Nzambe nde atia bakonzi oyo bazali.


Yango wana ezali na tina mingi kotosa mokonzi, kaka te mpo na kobanga kozwa etumbu, kasi mingi-mingi mpo na kosala makambo oyo mitema na biso ezali kosenga biso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ