Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 29:6 - Mokanda na Bomoi

6 bobalana, bobota bana mibali mpe bana basi, bolukela bana na bino ya mibali basi mpe bobalisa bana na bino ya basi, mpo ete bango mpe babota bana mibali mpe bana basi. Bobotana kuna mpe bokoma ebele, mpe botika te ete motango na bino ekita.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 29:6
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wana azalaki kovanda kati na esobe ya Parani, mama na ye azwelaki ye mwasi ya mokili ya Ejipito.


Tala Rebeka, azali liboso na yo ! Kamata ye mpe kende na ye ; mpe tika ete azala mwasi ya mwana mobali ya nkolo na yo, ndenge Yawe abongisi.


Bapambolaki Rebeka mpe balobaki na ye : « Ndeko na biso ya mwasi, tika ete okoma mama ya nkoto ya bato, mpe tika ete bana na yo bakamata bingumba ya banguna na bango ! »


Labani alobaki : — Eleki malamu ete napesa ye epai na yo na esika ete napesa ye epai ya mobali mosusu. Vanda awa elongo na ngai.


Sishemi alobaki na Amori, tata na ye : « Balela ngai elenge mwasi oyo. »


Kasi bino, bobota bana, bokoma ebele mpe botondisa mokili. »


Bokende kozwa matiti bino moko na esika oyo bokoki komona yango ! Kasi motango ya babiliki oyo bakatela bino ekokita ata moke te. »


Yango wana nazali kopesa toli epai ya bilenge basi bakufisa mibali ete babala na bango lisusu, babota bana, bakamba bandako na bango malamu, mpo ete bapesa na banguna nzela te ya kotonga biso.


Azalaki na bana mibali tuku misato mpe bana basi tuku misato. Abalisaki bana na ye ya basi na libanda ya libota ya botata na ye, mpe ayeisaki bilenge basi tuku misato ya bikolo mosusu mpo na bana na ye ya mibali. Ibitsani akambaki Isalaele mibu sambo.


Tango azongaki, alobaki na tata mpe mama na ye : — Namoni mwasi moko kati na basi ya bato ya Filisitia, na Timina ; bokende kobalela ngai ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ