Nganga-Nzambe Yeoyada apesaki mitindo epai ya bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko : « Bobimisa ye na molongo ! Mpe boboma na mopanga moto nyonso oyo akolanda ye ! » Pamba te Nganga-Nzambe alobaki : « Boboma ye te kati na Tempelo ya Yawe ! »
Bato nyonso ya mokili bakendeki na ndako ya nzambe Bala mpe babukaki yango elongo na bitumbelo mpe bikeko, mpe babomaki Matani, nganga-nzambe ya Bala, liboso ya bitumbelo. Nganga-Nzambe Yeoyada atiaki bakengeli ya Tempelo ya Yawe.
Tango Jewu abimaki mpe azongaki epai ya baninga na ye, bakonzi ya basoda, moko kati na bango atunaki ye : — Boni, makambo nyonso ezali malamu ? Mpo na nini moto ya liboma oyo ayaki epai na yo ? Jewu azongisaki : — Boyebi malamu moto yango mpe lolenge ya makambo oyo alobaka.
Boye, bakamataki Jeremi mpe babwakaki ye kati na libulu ya Malikiya, mwana mobali ya mokonzi ; libulu yango ezalaki kati na lopango ya bakengeli. Bakitisaki Jeremi kati na libulu na nzela ya basinga ; libulu ezalaki na mayi te, kaka na potopoto ; mpe Jeremi azindaki makasi kati na potopoto yango.
Mikolo ya etumbu ezali koya, mikolo ya kofuta masumu esili koya. Isalaele, yeba yango ! Mosakoli akomi zoba, moto ya Molimo abeli liboma ! Pamba te masumu na yo ekomi ebele penza, mpe mabe na yo ekomi mingi liboso na ngai.
Yesu akotaki na lopango ya Tempelo ; mpe wana azalaki koteya, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato bapusanaki pene na Ye. Batunaki : — Na kombo ya bokonzi nini ozali kosala biloko oyo ? Nani apesi yo bokonzi yango ?
Kati na bandako nyonso ya mayangani, nazalaki mbala mingi kotambola mpo na kopesa bango bitumbu mpe kotinda bango na makasi ete bafinga Yesu-Klisto. Na zuwa na ngai oyo eleka ndelo, nazalaki kolanda bango kino na bingumba ya bapaya mpo na konyokola bango.
Kobanga te pasi oyo osengeli komona. Tala, Satana akobwaka bato mingi kati na bino na boloko mpo na komeka bino mpe bokonyokwama mikolo zomi. Zala kaka sembo kati na kondima na yo kino na kufa, mpe Ngai nakopesa yo bomoi lokola motole ya elonga na yo.