Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 29:25 - Mokanda na Bomoi

25 « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Otindaki mikanda na kombo na yo moko epai ya bato nyonso ya Yelusalemi, epai ya Nganga-Nzambe Sofoni, mwana mobali ya Maaseya, mpe epai ya Banganga-Nzambe. Olobaki na Sofoni :

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 29:25
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na Ezekiasi kozwa mokanda kowuta na maboko ya bantoma, atangaki yango, akendeki na Tempelo ya Yawe mpe afungolaki mokanda yango liboso ya Yawe.


Sima na Senakeribe koyoka sango na tina na Tiraka, mokonzi ya Kushi, ete azali koya kobundisa ye, atindaki bantoma epai ya Ezekiasi na maloba oyo :


Senakeribe akomaki lisusu mikanda mpo na kofinga Yawe, Nzambe ya Isalaele. Tala maloba mabe oyo akomaki na tina na Ye : « Ndenge banzambe ya bato ya bikolo mosusu balongaki te kokangola bato na bango, ndenge wana mpe nzambe ya Ezekiasi akolonga te kokangola bato na ye na maboko na ngai. »


Na mikolo wana, bankumu ya Yuda bazalaki kotinda mikanda ebele epai ya Tobiya, mpe biyano ya Tobiya ezalaki kokomela bango.


Bazalaki kutu kokumisa misala na ye na miso na ngai mpe koyebisa ye maloba na ngai. Ezalaki Tobiya wana moto azalaki kotinda mikanda mpo na kobangisa ngai.


Na mbala ya mitano, Sanibala atindelaki ngai sango moko kaka wana na nzela ya mosali na ye, oyo asimbaki mokanda ya kofungwama na loboko na ye.


Tala makomi ya mokanda oyo mosakoli Jeremi atindaki, wuta na Yelusalemi, epai ya bakambi oyo batikalaki kati na bato oyo bakendeki na bowumbu, epai ya Banganga-Nzambe, epai ya basakoli mpe epai ya bato nyonso oyo Nabukodonozori amemaki na bowumbu, na Babiloni wuta na Yelusalemi.


Nzokande, Nganga-Nzambe Sofoni atangisaki mosakoli Jeremi mokanda yango.


Mokonzi Sedesiasi atindaki Yewukali, mwana mobali ya Shelemia, mpe Nganga-Nzambe Sofoni, mwana mobali ya Maaseya, epai ya mosakoli Jeremi mpo ete bayebisa ye maloba oyo : « Nabondeli yo, bondela Yawe, Nzambe na biso, mpo na biso ! »


Mokonzi ya bakengeli ya mokonzi atiaki na boloko : Seraya, mokonzi ya Banganga-Nzambe ; Sofoni, molandi ya mokonzi ya Banganga-Nzambe ; mpe Banganga-Nzambe misato oyo bazalaki na mokumba ya kokengela ekotelo ya Tempelo.


mpe asengaki ye mikanda ya mosala mpo na bandako ya mayangani ya Damasi, mpo ete, soki akuti kuna bato oyo bazali kolanda nzela ya Nkolo, akanga bango mpe amema bango na Yelusalemi, ezala basi to mibali.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ