Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 29:22 - Mokanda na Bomoi

22 Likolo na bango, bawumbu nyonso oyo bawutaki na Yuda, bongo bazali na Babiloni, bakosalela elakeli mabe oyo : ‹ Tika ete Yawe asala bino ndenge asalaki Sedesiasi mpe Akabi, oyo mokonzi ya Babiloni atumbaki na moto ! ›

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 29:22
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Apambolaki bango wana mpe alobaki : Bato ya Isalaele bakotangaka bakombo na bino mpo na kopambola : « Tika ete Nzambe akomisa bino lokola Efrayimi mpe Manase ! » Boye Isalaele atiaki Efrayimi liboso ya Manase.


Pongi ekimi ngai ; nakomi lokola ndeke oyo etikali yango moko na likolo ya ndako.


Bokotika kombo na bino epai ya baponami na Ngai lokola lisuma ; Nkolo Yawe akoboma bino ; kasi epai ya baponami na Ye, akopesa kombo mosusu.


Boye, bakangaki Shadraki, Meshaki mpe Abedinego basinga, wana balataki bilamba na bango, banzambala na bango, bakazaka na bango, bitendi na bango oyo bakangaka na moto mpe bilamba mosusu, mpe babwakaki bango kati na libulu ya moto.


Moto nyonso oyo akoboya kofukama mpo na kogumbamela ekeko yango, bakobwaka ye mbala moko kati na libulu ya moto. »


Soki ezali na moto oyo alingaka Nkolo te, tika ete alakelama mabe ! Oh Nkolo, yaka !


Boye, bampaka mpe bato nyonso oyo bazalaki na ekuke ya engumba balobaki : — Iyo, biso moko tozali batatoli. Tika ete Yawe akomisa mwasi oyo azali koya na ndako na yo, lokola Rasheli mpe Lea, oyo batongaki elongo libota ya Isalaele. Tika ete okoma moto monene kati na Efrata mpe moto ya lokumu kati na Beteleemi !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ