— Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Ndenge bambuma kitoko oyo ya figi ezali, ndenge wana mpe nazali komona bato ya Yuda oyo natindaki na bowumbu, longwa na esika oyo kino na Babiloni.
Tala makomi ya mokanda oyo mosakoli Jeremi atindaki, wuta na Yelusalemi, epai ya bakambi oyo batikalaki kati na bato oyo bakendeki na bowumbu, epai ya Banganga-Nzambe, epai ya basakoli mpe epai ya bato nyonso oyo Nabukodonozori amemaki na bowumbu, na Babiloni wuta na Yelusalemi.
Mokanda yango etindamaki sima na bato oyo kokende na bawumbu longwa na Yelusalemi : mokonzi Yekonia, mama ya mokonzi, bakalaka na ye ya lokumu, bakambi ya Yuda mpe ya Yelusalemi, bato oyo balambaka bibende na moto mpe bato ya misala ya maboko.
« Tinda sango oyo epai ya bawumbu nyonso : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi na tina na Shemaya, moto ya Nekelami : Lokola Shemaya asakolaki makambo ya lokuta epai na bino, nzokande natindaki ye te, mpe amemi bino na kotia motema na lokuta,
Kende sik’oyo epai ya bandeko na yo, oyo bozali elongo na bango kati na bowumbu ; okoyebisa bango mpe, ezala bayokeli yo to baboyi koyokela yo, okoloba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi. › »
Nakomaki kino na Teli-Avivi epai wapi bato oyo bamemaki na bowumbu bazalaki kovanda, pembeni ya ebale Kebari. Navandaki kuna elongo na bango mikolo sambo ; nazalaki kokamwa mingi.
Oh Siona, mboka kitoko, lela lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota ! Pamba te sik’oyo, okobima na engumba mpe okovanda kati na zamba, okokende kino na Babiloni ; mpe kuna, Yawe akokangola yo na maboko ya monguna na yo.