Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 29:2 - Mokanda na Bomoi

2 Mokanda yango etindamaki sima na bato oyo kokende na bawumbu longwa na Yelusalemi : mokonzi Yekonia, mama ya mokonzi, bakalaka na ye ya lokumu, bakambi ya Yuda mpe ya Yelusalemi, bato oyo balambaka bibende na moto mpe bato ya misala ya maboko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 29:2
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mingi kati na bakitani na yo, kati na ba-oyo babimi penza na mokongo na yo, bakomema bango mpe bakoboma bango mikongo mpo ete bakoma kosala kati na ndako ya mokonzi ya Babiloni. »


Jewu atombolaki miso na ngambo ya lininisa mpe agangaki : — Nani kati na bino azali na ngambo na ngai, nani ? Bakengeli mibale to misato ya mokonzi, oyo baboma bango mokongo, batalaki Jewu wuta na lininisa.


Loba na mokonzi mpe na mama ya mokonzi : « Bolongwa na bakiti na bino ya bokonzi, pamba te mitole na bino ya nkembo ekolongwa na mito na bino. »


Sima na Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, komema na bowumbu, longwa na Yelusalemi kino na Babiloni : Yekonia, mwana mobali ya Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, bakalaka ya Yuda, bato ya misala ya maboko mpe bato oyo balambaka bibende na moto ; Yawe alakisaki ngai bitunga mibale ya bambuma ya figi oyo batiaki liboso ya Tempelo ya Yawe.


bisalelo oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, atikaki tango amemaki Yekonia, mwana mobali ya Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, na bowumbu longwa na Yelusalemi kino na Babiloni, elongo na bankumu nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi ;


Nakozongisa lisusu na esika oyo : Yekonia, mwana mobali ya Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, mpe bato nyonso oyo, wuta na Yuda, bakendeki na bowumbu, na Babiloni, › elobi Yawe, ‹ pamba te nakobuka ekangiseli ya mokonzi ya Babiloni. › »


Yango wana, boyoka Liloba na Yawe, bino bawumbu nyonso oyo natindaki na Babiloni longwa na Yelusalemi.


Ebedi-Meleki, moto ya Kushi, kalaka ya lokumu oyo azalaki kosala kati na ndako ya mokonzi, ayokaki ete babwaki Jeremi kati na libulu. Boye, wana mokonzi avandaki na Ekuke ya Benjame,


Nzokande, na tango wana, batuli bibende bazalaki lisusu te kati na mokili mobimba ya Isalaele, pamba te bato ya Filisitia balobaki : « Ba-Ebre bakoki kosala te, ezala makonga to matolotolo. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ