Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 29:19 - Mokanda na Bomoi

19 Pamba te bayokaki maloba na Ngai te, » elobi Yawe, « maloba oyo nazalaki kotindela bango tango na tango na nzela ya basali na Ngai, basakoli. Mpe bino bato oyo bokendeki na bowumbu, bino mpe boyokaki te, » elobi Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 29:19
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Lokola boyokaki maloba na Ngai te,


mpe boboyi kotosa maloba ya basali na Ngai, basakoli, oyo nazalaki kotindela bino tango na tango atako boboyaki koyokela bango,


Bapesaki Ngai mokongo na esika ya kotala Ngai. Atako nazalaki tango na tango koteya bango, kasi batikalaki koyoka Ngai te mpe baboyaki kozwa mayele.


Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi : Lokola botosaki Ngai te, bosakolaki te kokangolama ya bandeko na bino moko mpe bopesaki bango bonsomi te, Ngai mpe, elobi Yawe, nasakoli ete napesi sik’oyo bonsomi epai ya mopanga, epai ya bokono oyo ebomaka mpe epai ya nzala makasi ; nafungoli yango mpo na kotelemela bino : nakokomisa bino eloko ya koyoka somo, na miso ya bikolo nyonso ya mabele ;


likolo ya mabe oyo basalaki. Bapesaki Ngai kanda tango bakomaki kotumba malasi ya ansa lokola mbeka mpe kosalela banzambe mosusu oyo batikalaki koyeba te, ezala bango to bino to batata na bino.


Oh mabele, yoka ! Nakoyeisa pasi epai ya bato oyo, ekozala lifuti ya mabongisi na bango, pamba te bayokaki mongongo na Ngai te mpe babwakaki Mobeko na Ngai.


Lokola nazalaki kokebisa bino mbala na mbala tango bozalaki kosala makambo oyo nyonso, elobi Yawe, kasi botikalaki koyokela Ngai te ; lokola nabengaki bino, kasi boyanolaki Ngai te,


Bosala penza keba ete boboya te koyoka Ye oyo alobaka ! Pamba te soki bato wana bazangaki te kozwa etumbu tango baboyaki koyoka Ye oyo azalaki kokebisa bango awa na mokili, ekozala ndenge nini mpo na biso soki toboyi koyoka Ye oyo akebisaka biso wuta na Likolo ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ