Jeremi 29:18 - Mokanda na Bomoi18 Nakolanda bango na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka ; mpe na miso ya bikolo nyonso ya mabele, nakokomisa bango eloko ya koyoka somo, ndakisa mpo na koloba maloba ya bosoloka, eloko ya lisuma, eloko ya kobanga mpe ya kotiola kati na bikolo nyonso epai wapi nakobengana bango. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
nakobengisa bato nyonso ya bikolo ya nor mpe mosali na Ngai, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, » elobi Yawe, « nakosala ete babundisa mokili oyo, bavandi na yango mpe bikolo nyonso ya zingazinga. Nakobebisa bango penza mpe nakokomisa bango eloko ya somo mpe ya kotiola ; boye bakotikala seko na seko libebi.
Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi : Lokola botosaki Ngai te, bosakolaki te kokangolama ya bandeko na bino moko mpe bopesaki bango bonsomi te, Ngai mpe, elobi Yawe, nasakoli ete napesi sik’oyo bonsomi epai ya mopanga, epai ya bokono oyo ebomaka mpe epai ya nzala makasi ; nafungoli yango mpo na kotelemela bino : nakokomisa bino eloko ya koyoka somo, na miso ya bikolo nyonso ya mabele ;
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Ndenge kanda mpe kotomboka na Ngai epelelaki bavandi ya Yelusalemi, ndenge wana mpe nakopelisela bino kanda na Ngai tango bokokende na Ejipito. Bokokoma ndakisa mpo na koloba maloba ya bosoloka, eloko ya koyoka somo, eloko ya lisuma mpe ya kotiola ; mpe bokotikala komona lisusu esika oyo te. ›
Nakokanga batikali ya Yuda, ba-oyo batingamaki koya kovanda awa na Ejipito ; bango nyonso bakokufa kati na Ejipito, na mopanga mpe na nzala makasi, kobanda na ye oyo aleki moke kino na ye oyo aleki monene ; bakokufa na mopanga mpe na nzala makasi, mpe bakobanda kotangaka kombo na bango mpo na kolakela bato mabe ; bakokoma eloko ya koyoka somo, eloko ya lisuma mpe eloko ya kotiola.