Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 29:17 - Mokanda na Bomoi

17 tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Nakotindela bango mopanga, nzala makasi mpe bokono oyo ebomaka, mpe nakokomisa bango lokola mbuma ya figi oyo epola, oyo moto ata moko te akokoka kolia.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 29:17
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki ekolo moko to mokili moko eboyi kosalela Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, to eboyi komema mokumba ya ekangiseli ya mokonzi ya Babiloni, nakopesa ekolo yango etumbu na nzela mopanga, ya nzala makasi mpe ya bokono oyo ebomaka, elobi Yawe, kino nakobebisa yango na nzela ya loboko na ye.


Nakolanda bango na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka ; mpe na miso ya bikolo nyonso ya mabele, nakokomisa bango eloko ya koyoka somo, ndakisa mpo na koloba maloba ya bosoloka, eloko ya lisuma, eloko ya kobanga mpe ya kotiola kati na bikolo nyonso epai wapi nakobengana bango.


Tala, banguna basili kobongama mpo na kobotola engumba ! Likolo ya mopanga, ya nzala makasi mpe ya bokono oyo ebomaka, engumba oyo ekokweya na maboko ya bato ya Babiloni, oyo bazali kobundisa yango. Makambo oyo olobaki ekokisami, ndenge ozali komona yango na mokolo ya lelo.


Akoya kobundisa Ejipito mpe akoboma bato oyo basengeli kokufa, akomema na bowumbu ba-oyo basengeli kokende na bowumbu mpe akoboma na mopanga ba-oyo basengeli kokufa na mopanga.


Na mokolo ya libwa ya sanza ya minei, wana nzala makasi ekotaki kati na engumba, mpe bato bazalaki lisusu na eloko ya kolia te,


mabele ekoningana makasi mpe, na bisika ebele, nzala makasi mpe bokono ya ndenge na ndenge ekozala ; makambo ya somo ekosalema, mpe bilembo ya kokamwa ekomonana kowuta na Likolo.


Na mikolo yango, mawa na basi oyo bakozala na bazemi mpe na ba-oyo bakozala komelisa bana mabele ! Pamba te pasi ekozala makasi kati na mokili, mpe kanda ya Nzambe ekokweyela bato yango.


Namonaki liboso na ngai mpunda moko ya langi ya mayi ya pondu ; kombo ya motambolisi na yango ezalaki « Kufa, » mpe mboka ya bakufi ezalaki kolanda motambolisi yango na sima. Bapesamelaki nguya ya koboma bato na nzela ya mopanga, ya nzala, ya bokono mpe ya banyama mabe, na etando ya eteni moko kati na biteni minei ya mokili.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ