Jeremi 29:13 - Mokanda na Bomoi13 Bokoluka Ngai mpe bokomona Ngai, soki boluki Ngai na motema na bino mobimba. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mokonzi atelemaki na etemelo ya kolobela, asalaki boyokani oyo liboso ya Yawe : « Nalapi ndayi ete nakolanda Yawe, nakotosa mibeko, mitindo mpe malako na Ye, na motema mpe na elimo na ngai mobimba ; mpe nakotosa maloba ya boyokani, oyo ekomama kati na buku oyo. » Bato nyonso bandimaki kotosa boyokani yango.
Bongo, akendeki koluka Akazia, mpe bato na ye bakangaki Akazia kati na Samari epai wapi abombamaki. Bamemaki ye epai ya Jewu mpe babomaki ye. Bakundaki ye, pamba te bamilobelaki : « Azalaki mwana mobali ya Jozafati oyo azalaki koluka Yawe na motema na ye mobimba. » Ezalaki lisusu na moto ya nguya ata moko te kati na libota ya Akazia mpo na kobatela bokonzi.