11 Pamba te nayebi malamu mabongisi oyo nasalaki mpo na bino, » elobi Yawe, « mabongisi ya kosalela bino bolamu, kasi ya konyokola bino te, mabongisi mpo na kopesa bino elikya mpe bomoi malamu.
Nazali lisusu na kanda te. Ah, soki ezalaki kaka na banzube mpe na basende mpo na kobundisa Ngai, nde natambolaki likolo na yango na bitumba mpe nabwakaki yango nyonso na moto.
Na eleko ya mokonzi wana, mokili ya Yuda ekobikisama, mpe mokili ya Isalaele ekozala na kimia. Tala kombo oyo bakobengela ye : Yawe azali Bosembo na biso.
— Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Ndenge bambuma kitoko oyo ya figi ezali, ndenge wana mpe nazali komona bato ya Yuda oyo natindaki na bowumbu, longwa na esika oyo kino na Babiloni.
Oh Jakobi, mosali na Ngai, kobanga te ! Oh Isalaele, kozala na somo te, › elobi Yawe. ‹ Solo, nakobikisa yo wuta na mokili ya mosika, mpe bakitani na yo, wuta na mokili ya bowumbu ! Jakobi akozwa lisusu kimia mpe bopemi, mpe moto moko te akobangisa ye lisusu.
Kasi nakoyeisa bato na yango nzoto kolongono mpe nakobikisa bango ; solo, nakobikisa bato na Ngai mpe nakopesa bango bomoi ya kimia kati na bobatelami.
Yango wana, loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Atako nabenganaki bango kati na bikolo mpe napanzaki bango kati na mabota, kasi nazalaki mpo na bango lokola ndako ya bule kati na bikolo epai wapi bakendeki. ›
Sima na yango, bana ya Isalaele bakozongela mpe bakoluka Yawe, Nzambe na bango, mpe Davidi, mokonzi na bango ; bakobelema epai na Yawe, na kolenga nyonso, mpo na kozwa mapamboli na Ye, na mikolo oyo ekolanda.
Kasi bayebi makanisi na Yawe te mpe bazali kososola mabongisi na Ye te, Ye oyo asangisaki bango lokola maboke ya matiti ya ble na etando oyo batutelaka yango.