10 Kasi tala liloba oyo Yawe alobi : « Tango mibu tuku sambo ekokoka mpo na Babiloni, nakoya epai na bino mpe nakokokisa elaka na Ngai ya ngolu mpo na kozongisa bino na esika oyo.
Ezalaki ndenge wana nde Liloba na Yawe ekokisamaki, liloba oyo alobaki na nzela ya mosakoli Jeremi : « Mokili ekozwa bopemi na mikolo nyonso oyo bakosundola yango, ekosepela na basaba na yango kino tango mibu tuku sambo ekokoka. »
Na mobu ya liboso ya Sirisi, mokonzi ya Persi, Yawe alamusaki molimo ya Sirisi, mokonzi ya Persi, mpo na kokokisa liloba oyo alobaki na nzela ya mosakoli Jeremi mpo ete asakola mpe akoma boye kati na mokili na ye mobimba :
Na mobu ya liboso ya Sirisi, mokonzi ya Persi, Yawe alamusaki molimo ya Sirisi, mokonzi ya Persi, mpo na kokokisa liloba oyo alobaki na nzela ya mosakoli Jeremi, mpo ete asakola mpe akoma boye kati na mokili na ye mobimba :
« Tala makambo oyo Sirisi, mokonzi ya Persi, alobi : ‹ Yawe, Nzambe ya Likolo, apesi ngai babokonzi nyonso ya mabele mpe mokumba ya kotongela Ye Tempelo, na Yelusalemi kati na Yuda.
Kasi soki mibu tuku sambo ekoki, nakopesa mokonzi ya Babiloni elongo na ekolo na ye mpe mokili ya bato ya Babiloni etumbu mpo na mabe oyo basalaki, » elobi Yawe, « mpe nakobebisa yango mpo na libela.
Bikolo nyonso ekotosa ye, mwana na ye ya mobali mpe koko na ye, kino tango ya mokili na ye mpe ekokoka ; bongo bikolo ebele mpe bakonzi ya nguya bakokonza ye.
tala liloba oyo Yawe alobi : Solo, nakopesa Shemaya, moto ya Nekelami, etumbu elongo na bakitani na ye. Kati na bato na ye, moko te akotikala, mpe akotikala komona te bolamu oyo nakosala epai ya bato na Ngai, elobi Yawe, pamba te atindiki bato na Ngai kotombokela Ngai. › »
Mpo na yango, loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakosangisa bino wuta na bikolo, nakozongisa bino wuta na mikili epai wapi napanzaki bino mpe nakozongisela bino lisusu mokili ya Isalaele. ›
na mobu ya liboso ya bokonzi na ye, ngai, Daniele, nasosolaki, na nzela ya mikanda, kolanda liloba oyo Yawe apesaki na mosakoli Jeremi, ete kobebisama ya engumba Yelusalemi esengeli kosala mibu tuku sambo.
Ekokoma etuka ya batikali ya libota ya Yuda ; bakokuta kuna bisika ya kobokola bibwele na bango. Pokwa nyonso, bakolala na bandako ya Ashikeloni, pamba te Yawe, Nzambe na bango, akobatela bango, akobongisa lisusu bomoi ya bato na bango, oyo bakowuta na bowumbu.
Tango Naomi ayokaki wuta na Moabi ete Yawe ayaki mpo na kosunga bato na Ye na kopesa bango biloko ya kolia, ye elongo na babokilo na ye ya basi babongamaki mpo na kozonga na Yuda wuta na Moabi.