Nakokisi maloba ya mosali na Ngai mpe nalongisi mabongisi ya bamemi sango na Ngai. Natatoli na tina na Yelusalemi : ‹ Bato bakovanda kati na yo ; › na tina na bingumba ya Yuda : ‹ Ekotongama lisusu, › mpe na tina na mabanga na yango oyo ebukana : ‹ Nakobongisa yango lisusu. ›
Kasi nazongiselaki Ye : — Oh Nkolo Yawe, basakoli bazali kokoba koloba na bango : « Te ! Bokotikala komona mopanga to nzala makasi te, kasi nakopesa bino kimia ya solo na esika oyo. »
Soki makambo oyo mosakoli alobi na Kombo na Yawe ekokisami te to esalemi te, wana maloba yango ewutaki na Yawe te. Mosakoli wana alobaki kaka na ndenge na ye moko, bobanga ye te. »