16 Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Nakolongola yo na mokili oyo, okokufa kaka na mobu oyo ; pamba te otindiki bato na kotombokela Yawe. › »
Mpo na nini bato ya Ejipito baloba : « Nzambe na bango azalaki na makanisi mabe tango abimisaki bango na Ejipito. Ezali nde mpo na koboma bango na mokili ya bangomba mpe kosilisa bango na mokili. » Lembisa kanda na Yo ya makasi mpe kosala lisusu mabe te na bato na Yo.
Mpo na yo Pashuri mpe bavandi nyonso ya ndako na yo, bokokende na bowumbu na mokili ya Babiloni. Bokokufa mpe bakokunda bino kuna, ezala yo to balingami na yo nyonso oyo bosakolaki makambo ya lokuta epai na bango. »
Etikali kaka mibu mibale ; nakozongisa na esika oyo bisalelo nyonso ya Tempelo ya Yawe, oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, azwaki na esika oyo mpe amemaki na Babiloni.
tala liloba oyo Yawe alobi : Solo, nakopesa Shemaya, moto ya Nekelami, etumbu elongo na bakitani na ye. Kati na bato na ye, moko te akotikala, mpe akotikala komona te bolamu oyo nakosala epai ya bato na Ngai, elobi Yawe, pamba te atindiki bato na Ngai kotombokela Ngai. › »
Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi : « Mwasi na yo akosala kindumba kati na engumba, bana na yo ya mibali mpe ya basi bakokufa na mopanga, bakokabola mabele na yo na biteni. Yo moko, okokufa na mabele ya mbindo, mpe Isalaele akokende solo na bowumbu, mosika ya mokili na ye ya mbotama. »
Na mokolo ya sambo, bokobonza bangombe ya mibali sambo, bameme ya mibali mibale mpe bana mibali ya meme zomi na minei ya mobu moko, nyonso ezanga mbeba.