13 « Kende koloba na Anania : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Solo, obuki ekangiseli ya banzete ; kasi na esika na yango, okolata nde ekangiseli ya ebende.
Kobanda lelo, soki tata na ngai anyokolaki bino na misala makasi, ngai nakoyeisa yango lisusu makasi koleka ; soki tata na ngai azalaki kobeta bino fimbu ya poso ya nyama, ngai nakobeta bino fimbu ya ebende. »
Natindaki bango te, » elobi Yawe, « bazali kosakola makambo ya lokuta na Kombo na Ngai. Nakobengana bino mpe bokokufa, bino mpe basakoli oyo bazali kosakola epai na bino. »
Maboko na Ye ekangi masumu na ngai ndenge bakangaka ekangiseli ; masumu yango emati ngai kino na kingo, mpe Nkolo asilisi makasi na ngai, akabi ngai na maboko ya bato oyo nazali na makoki ya kotelemela te.
Bimoniseli ya basakoli na yo ezalaki ya lokuta mpe ya pamba ; balakisaki yo masumu na yo te mpo ete okende na bowumbu te : masakoli oyo bazwelaki yo ezalaki ya mabe mpe ya lokuta !
Na Takipenesi, mokolo ekokoma molili tango nakobuka ekangiseli ya Ejipito ; mpe kuna, makasi na yango oyo etielaka lolendo ekosila ; mapata ekozipa engumba Takipenesi mpe bamboka na yango ya mike ekokende na bowumbu.
tango bokozala na nzala mpe na posa ya komela, mpe tango bokozanga bilamba mpe bokokelela, bokosalela banguna oyo Yawe Nzambe akotindela bino. Akotia bino ekangiseli ya ebende na kingo kino akobebisa bino.