Jeremi 27:7 - Mokanda na Bomoi7 Bikolo nyonso ekotosa ye, mwana na ye ya mobali mpe koko na ye, kino tango ya mokili na ye mpe ekokoka ; bongo bikolo ebele mpe bakonzi ya nguya bakokonza ye. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
« Bakobengana yo na molongo ya bato mpe okokende kovanda esika moko na banyama ya zamba ; okobanda kolia matiti ya zamba lokola ngombe, mpe mamwe ekopolisa nzoto na yo. Mibu sambo ekoleka mpo na yo kino tango okondima ete Ye-Oyo-Aleki-Likolo azali na bokonzi ya kosala makambo oyo Ye alingi kati na bikolo ya bato mpo na kopesa yango na moto oyo Ye alingi.