Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 27:3 - Mokanda na Bomoi

3 Bongo tinda maloba epai ya bakonzi ya Edomi, ya Moabi, ya Amoni, ya Tiri mpe ya Sidoni na nzela ya batindami oyo bayei na Yelusalemi mpo na kokutana na Sedesiasi, mokonzi ya Yuda.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 27:3
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Lisusu, atombokelaki mokonzi Nabukodonozori oyo alapisaki ye ndayi na Kombo ya Nzambe. Na esika ete azonga epai na Yawe, Nzambe ya Isalaele, akomaki moto makasi mpe akomisaki motema na ye libanga.


Yoka soni, Sidoni, ndako batonga makasi ya ebale monene, pamba te ebale monene elobi : « Natikala koyoka pasi ya kobota te, natikala na ngai mpe kobota te, natikala na ngai kobokola bana mibali to kokolisa bana basi te. »


Bongo napesaki sango kaka wana epai ya Sedesiasi, mokonzi ya Yuda : « Bomema mokumba ya ekangiseli ya mokonzi ya Babiloni mpe bosalela ye elongo na bato na ye, bongo bokobika !


Pesa bango sango oyo bakomemela bakonzi na bango mpe yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‘ Boyebisa bakonzi na bino maloba oyo :


Kaka na mobu wana, mobu ya minei, na ebandeli ya bokonzi ya Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, na sanza ya mitano, mosakoli Anania, mwana mobali ya Azuri, moto ya mboka Gabaoni, alobaki na ngai kati na Tempelo ya Yawe na miso ya Banganga-Nzambe mpe ya bato nyonso :


« Mwana na moto, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, alendisaki makasi mampinga na ye mpo na kobundisa engumba Tiri ; mito ya basoda nyonso ekomaki mabandi mpe mapeka na bango elongwaki-longwaki baposo. Nzokande, ye mpe mampinga na ye batikalaki kozwa litomba ata moko te na mosala na bango ya kobundisa engumba Tiri.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Likolo ya masumu misato to minei ya Tiri, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te bakabaki bato ebele na bowumbu epai ya bato ya Edomi mpe batosaki te boyokani ya bondeko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ