Jeremi 27:22 - Mokanda na Bomoi22 ‹ Bakomema yango na Babiloni, mpe ekotikala kuna kino na mokolo oyo nakolandela yango, › elobi Yawe, ‹ nakolongola yango mpe nakozongisa yango na esika oyo, elobi Yawe. › » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
kasi okokufa na kimia. Mpe ndenge bato bapelisaki moto mpe batumbaki malasi ya solo kitoko, na matanga ya batata na yo, bakonzi ya kala oyo baleka liboso na yo, mpo na kopesa bango lokumu, ndenge wana mpe bakosala mpo na lokumu na yo. Mpe bakoyemba nzembo ya mawa na tina na yo : ‘ Oh mawa, nkolo na ngai ! ’ Solo, Ngai moko nde napesi elaka oyo, elobi Yawe. › »
Otomboli mapeka na yo mpo na kotelemela Yawe ya Lola, oyeisi epai na yo bakopo oyo ewutaki na Tempelo na Ye ; bongo yo, bato na yo ya lokumu, basi na yo mpe bamakangu na yo, bomeli na yango masanga ya vino mpe bokumisi banzambe ya palata mpe ya wolo, ya bronze mpe ya ebende, ya nzete mpe ya mabanga, oyo emonaka te, eyokaka te mpe esosolaka te. Kasi opesi lokumu te na Nzambe oyo, kati na loboko na Ye, asimbi bomoi mpe banzela na yo nyonso.