21 tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na biloko oyo etikalaki kati na Tempelo ya Yawe, kati na ndako ya mokonzi ya Yuda mpe kati na Yelusalemi :
« Solo, na mikolo ekoya, nyonso oyo ezali kati na ndako na yo, mpe nyonso oyo batata na yo babomba kino na mokolo ya lelo, bakomema yango na Babiloni, eloko moko te ekotikala, elobi Yawe.
Nabukodonozori amemaki na Babiloni biloko nyonso ya Tempelo ya Nzambe, ya minene to ya mike, bozwi ya Tempelo ya Yawe, bozwi ya mokonzi mpe ya bakalaka na ye.
Motango ya biloko nyonso ya wolo mpe ya palata ezalaki nkoto mitano na nkama minei. Sheshibatsari amemaki biloko yango nyonso tango bato oyo bakendeki na bowumbu balongwaki na Babiloni mpo na kozonga na Yelusalemi.
« Solo, na mikolo oyo ekoya, nyonso oyo ezali kati na ndako na yo mpe nyonso oyo batata na yo babomba kino na mokolo ya lelo, bakomema yango na Babiloni ; eloko moko te ekotikala, » elobi Yawe.
Nakokaba bozwi nyonso ya engumba oyo na maboko ya banguna na bango : biloko nyonso ya engumba, biloko ya talo mpe bomengo nyonso ya mokonzi ya Yuda ; bakokamata yango mpe bakomema yango na mokili ya Babiloni.
bisalelo oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, atikaki tango amemaki Yekonia, mwana mobali ya Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, na bowumbu longwa na Yelusalemi kino na Babiloni, elongo na bankumu nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi ;
Monguna asemboli loboko na ye likolo ya bomengo nyonso ya Yelusalemi, bongo azali komona bikolo ya bapaya kokota na esika na ye ya bule, bikolo oyo Yo opekisaki kokota kati na lisanga na Yo.