Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 27:19 - Mokanda na Bomoi

19 Pamba te, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi na tina na makonzi, nzungu ya monene ya bronze, bivandelo na yango mpe bisalelo mosusu oyo etikalaki kati na engumba wana,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 27:19
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Irami asalaki nzungu ya monene ya bronze oyo ezalaki na lolenge ya libungutulu : monene na yango ezalaki na bametele pene mitano, mpe bosanda na yango, bametele mibale na basantimetele tuku mitano ; mpe zingazinga na yango, bametele pene zomi na mitano.


Irami asalaki lisusu bivandelo zomi ya bronze : evandelo moko na moko ezalaki na bametele pene mibale na molayi, bametele pene mibale na mokuse, metele moko na basantimetele tuku mitano na bosanda.


Bato ya Babiloni babukaki makonzi ya bronze oyo ezalaki liboso ya Tempelo ya Yawe, bashario ya bronze mpe nzungu ya monene ya bronze oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe, mpe bamemaki bronze na yango na Babiloni.


Likonzi moko na moko ezalaki na bametele pene libwa na bosanda. Moto ya likonzi, oyo ezalaki na songe, ezalaki ya bronze mpe na metele pene moko na ndambo na molayi ; mpe bazingelaki yango na bililingi ya basinga oyo basala lokola monyama mpe bambuma ya grenade. Makonzi nyonso mibale mpe bililingi ya basinga oyo basala lokola monyama ezalaki ndenge moko.


Nabukodonozori amemaki na Babiloni biloko nyonso ya Tempelo ya Nzambe, ya minene to ya mike, bozwi ya Tempelo ya Yawe, bozwi ya mokonzi mpe ya bakalaka na ye.


Monguna asemboli loboko na ye likolo ya bomengo nyonso ya Yelusalemi, bongo azali komona bikolo ya bapaya kokota na esika na ye ya bule, bikolo oyo Yo opekisaki kokota kati na lisanga na Yo.


Yawe akabaki Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, elongo na ndambo ya bisalelo ya Tempelo ya Nzambe na maboko ya Nabukodonozori. Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, amemaki bisalelo yango kati na tempelo ya nzambe na ye, na Shineari, mpe atiaki yango kati na ndako oyo babombelaka bomengo ya nzambe na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ