Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 26:22 - Mokanda na Bomoi

22 Mokonzi Yeoyakimi atindaki Elinatani, mwana mobali ya Akibori, na Ejipito elongo na bato mosusu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 26:22
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Saulo akufaki, Bala-Anani, mwana mobali ya Akibori, akitanaki na ye na bokonzi.


mpe apesaki mitindo oyo epai ya Nganga-Nzambe Ilikia, epai ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani, epai ya Akibori, mwana mobali ya Mishe, epai ya Shafani, mokomi mikanda, mpe epai ya Asaya, moko kati na bakalaka ya mokonzi :


Boye Nganga-Nzambe Ilikia, Ayikami, Akibori, Shafani mpe Asaya bakendeki epai ya mwasi mosakoli Ulida, mwasi ya Shalumi, mwana mobali ya Tikiva, koko ya Arasi, mobombi bilamba ya Tempelo. Ulida azalaki kovanda na Yelusalemi, kati na etuka ya sika. Tango basilisaki koyebisa ye makambo,


Yo, Yawe, okobatela bato oyo bakelela, okobikisa biso mpo na libela liboso ya bato mabe.


Soki mokonzi akomi koyoka makambo ya lokuta, basali na ye nyonso bakokoma bato mabe.


Apesaki mokanda yango na maboko ya Eleasa, mwana mobali ya Shafani ; mpe na maboko ya Gemaria, mwana mobali ya Ilikia. Ezali bango nde Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, atindaki na Babiloni epai ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni. Mokanda yango elobaki boye :


akendeki na ndako ya mokonzi, akotaki kati na ndako ya mosala ya mokomi mikanda epai wapi bakalaka nyonso bazalaki na mayangani : Elishama, mokomi mikanda ; Delaya, mwana mobali ya Shemaya ; Elinatani, mwana mobali ya Akibori ; Gemaria, mwana mobali ya Shafani ; Sedesiasi, mwana mobali ya Anania ; mpe bakalaka nyonso mosusu.


Atako Elinatani, Delaya mpe Gemaria bazalaki kobondela mokonzi ete atumba mokanda yango te, atikalaki koyokela bango te.


batindaki ete bazwa Jeremi kati na lopango ya mokonzi mpe bapesaki ye na maboko ya Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani, mpo ete azongisa ye na ndako na ye. Boye Jeremi awumelaki kati na bato na ye.


Bongo, liboso na yango, bakambi tuku sambo ya libota ya Isalaele batelemaki ; mpe moko na moko kati na bango asimbaki mbabola oyo batumbelaka malasi : ezalaki kobimisa milinga ya solo ya ansa. Yazania, mwana mobali ya Shafani, azalaki mpe elongo na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ