Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 26:21 - Mokanda na Bomoi

21 Tango mokonzi Yeoyakimi elongo na bakalaka na ye nyonso mpe bakambi bayokaki maloba ya Iri, balukaki koboma ye. Kasi tango Iri ayokaki yango, abangaki makasi mpe akimaki na Ejipito.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 26:21
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Solo, na Kombo na Yawe, Nzambe na yo, ezali na ekolo moko te to mokili moko te epai wapi nkolo na ngai azangi kotinda bato koluka yo. Mpe soki ekolo moko to mokili elobi ete ozalaki kuna te, Akabi azalaki kolapisa bango ndayi ete bamoni yo te.


Mokonzi Asa asilikelaki makasi momoni makambo mpe abwakaki ye na boloko. Kaka na tango yango, Asa anyokolaki ndambo ya bato.


Kasi bato basalelaki ye likita ; mpe na etinda ya mokonzi, babomaki ye na mabanga kati na lopango ya Tempelo ya Yawe.


Solo, nakutanaka tango nyonso na makama, kasi nabosanaka mibeko na Yo te.


Kobanga bato ezalaka motambo na se ya matambe, kasi Yawe abatelaka moto oyo atiaka elikya na Ye.


Tango bakalaka ya Yuda bayokaki makambo oyo nyonso, balongwaki na ndako ya mokonzi, bakendeki na Tempelo ya Yawe mpe bavandaki liboso ya Ekuke ya Sika ya Tempelo ya Yawe.


Kutu, mokonzi atindaki Yerameeli, kalaka ya makila ; Seraya, mwana mobali ya Azirieli, mpe Shelemia, mwana mobali ya Abideyeli, ete bakanga Baruki, mokomi mikanda, mpe mosakoli Jeremi. Kasi Yawe abombaki bango.


Bakalaka balobaki na mokonzi : — Moto oyo asengeli kokufa ! Maloba na ye ezali kolembisa basoda mpe bato oyo batikali kati na engumba oyo ; azali koluka bolamu ya bato oyo te, kasi azali nde koluka mabe na bango.


Tango bakonyokola bino kati na engumba songolo, bokima na engumba mosusu. Nazali koloba na bino penza ya solo : bokosilisa te kotambola na bingumba nyonso ya Isalaele liboso ete Mwana na Moto aya.


Bobanga te bato oyo bakoki koboma nzoto, kasi bazangi makoki ya koboma elimo ; bobanga nde Ye oyo akoki koboma nzoto mpe elimo kati na lifelo.


Moto oyo akangami na bomoi na ye akobungisa yango ; mpe moto oyo abungisi bomoi na ye likolo na Ngai akozwa yango lisusu.


Boye, Erode akomaki koluka nzela ya koboma Yoane, kasi azalaki kobanga bato mpo ete bazalaki kozwa Yoane lokola mosakoli.


Erodiade akangelaki Yoane kanda kati na motema mpe azalaki koluka nzela ya kobomisa ye, kasi azalaki kokoka te,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ