Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 26:18 - Mokanda na Bomoi

18 « Mosakoli Mishe, moto ya Moresheti, asakolaki na tango ya Ezekiasi, mokonzi ya Yuda ; alobaki na bato nyonso ya Yuda : ‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : Bakobalola Siona ndenge babalolaka mabele ya bilanga, Yelusalemi ekokoma liboke ya mabanga, mpe ngomba epai wapi batongaki Tempelo ekokoma ngomba moke oyo ezipami na matiti. ›

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 26:18
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oyoka nanu yango te ? Nasalaki mabongisi ya makambo oyo wuta kala, nabongisaki yango wuta na mikolo oyo eleka kala ; sik’oyo nde nakokisi yango ; esengeli na yo kokomisa bingumba ya makasi mipiku ya mabanga.


Bongo Ezekiasi amikitisaki, atikaki lolendo na ye mpe abongolaki motema. Bato ya Yelusalemi mpe basalaki lokola Ezekiasi. Boye, Yawe akweyiselaki bango kanda na Ye te na mikolo nyonso oyo Ezekiasi azalaki mokonzi.


Bango nyonso basanganaki mpo na koya kobundisa Yelusalemi mpe kotia mobulu kati na yango.


Nzembo ya Azafi. Oh Nzambe, tala ndenge bato ya bikolo ya bapaya bakoti na makasi kati na libula na Yo, bakomisi Esika na Yo ya bule mbindo, mpe bakomisi Yelusalemi mipiku ya mabanga !


Oh ngomba na Ngai kati na mokili, nakokaba lokola bomengo ya bitumba : biloko na yo, bozwi na yo nyonso mpe bisambelo na yo ya likolo ya bangomba mpo na masumu oyo osalaki kati na mokili na yo.


Mokili ya Babiloni ekokoma liboke ya mabanga, ndako ya mbwa ya zamba, eloko ya somo mpe ya kotiola ; bongo, bato bakovanda lisusu kuna te.


Nani azali penza na bwanya mpo na kososola makambo ya boye ? Nani Yawe ateyaki mpo ete alimbola yango ? Mpo na nini mokili ebebisami, etikali pamba lokola esobe epai wapi moto alekaka te ? »


Yawe alobaki na Mishe, moto ya mboka Moresheti, na tango Yotami, Akazi mpe Ezekiasi bazalaki, moko sima na mosusu, bakonzi ya Yuda : ezalaki emoniseli oyo Mishe azwaki na tina na Samari mpe Yelusalemi.


Yango wana, likolo na bino, bakobalola Siona ndenge babalolaka mabele ya bilanga. Yelusalemi ekokoma liboke ya mabanga, mpe ngomba epai wapi batongaki Tempelo ekokoma ngomba moke oyo ezipami na matiti.


Na mikolo oyo ekoya, ngomba ya Tempelo ya Yawe ekolendisama ngwi na songe ya bangomba, ekoleka bangomba mikuse nyonso na molayi, mpe bikolo ekokende kotondana kuna.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakozonga na Siona mpe nakovanda kati na Yelusalemi. Boye, Yelusalemi ekobengama Engumba ya bosolo ; mpe ngomba ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, ekobengama Ngomba ya bule. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ