Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 26:16 - Mokanda na Bomoi

16 Bakambi mpe bato nyonso balobaki epai ya Banganga-Nzambe mpe basakoli : « Esengeli te koboma moto oyo ! Azali solo koloba na biso na Kombo na Yawe, Nzambe na biso. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 26:16
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te soki yo okangi monoko na yo mpe olobi eloko moko te na tango oyo, lisungi mpe lobiko mpo na Bayuda ekowuta na esika mosusu ; kasi yo mpe libota ya botata na yo, bokokufa. Kutu, nani ayebi soki tango mosusu ezali mpo na makambo ya boye nde okomaki na ndako ya mokonzi ?


Nani akotelema mpo na ngai mpo na kotelemela bato mabe ? Nani akokotela ngai liboso ya bato ya misala mabe ?


Soki Yawe asepeli na nzela ya moto, akoyokanisa ye na banguna na ye.


Banganga-Nzambe mpe basakoli balobaki na bakambi mpe na bato nyonso : « Moto oyo asengeli kokufa, pamba te asakoli mabe mpo na engumba oyo. Bino moko boyoki yango na matoyi na bino ! »


Boye, bakambi nyonso mpe bato nyonso oyo basalaki boyokani yango bandimaki kokangola bawumbu na bango ya mibali mpe ya basi mpe kopesa bango bonsomi, mpo ete bakoba lisusu te kokanga bango na bowumbu ; bandimaki, bakokisaki mpe bapesaki bawumbu na bango bonsomi.


Bakambi bayebisaki Baruki : — Yo mpe Jeremi, bokende kobombama. Mpe tika ete moto moko te ayeba esika bokozala.


Atako Elinatani, Delaya mpe Gemaria bazalaki kobondela mokonzi ete atumba mokanda yango te, atikalaki koyokela bango te.


Bakambi batombokelaki Jeremi makasi, babetaki ye mpe batiaki ye na ndako ya Jonatan, mokomi mikanda, ndako oyo bakomisaki boloko.


Tango mokonzi ya basoda ya Rome elongo na basoda oyo bazalaki kokengela Yesu bamonaki ndenge mabele eninganaki mpe nyonso oyo esalemaki, bayokaki somo makasi mpe balobaki : — Moto oyo azalaki penza Mwana na Nzambe !


Biso, tozwi penza etumbu na ndenge ya bosembo, pamba te tozali kozwa mbano ya misala mabe na biso ; kasi tata oyo asali ata mabe moko te.


Tango mokonzi ya basoda ya Rome amonaki makambo oyo eleki, akumisaki Nzambe mpe alobaki : — Moto oyo azalaki penza sembo !


Namonaki ete bafundaki ye kaka mpo na makambo oyo etali mobeko na bango, kasi balongaki te kofunda ye mpo na mabe moko oyo ekoki kopesa ye etumbu ya kufa to ya boloko.


Makelele emataki makasi penza. Boye ndambo ya balakisi ya Mobeko oyo bazalaki Bafarizeo batelemaki mpe batombolaki mingongo na mpiko nyonso : — Solo, tomoni ata mabe moko te ya kopamela moto oyo. Nani ayebi ? Tango mosusu molimo to anjelu nde alobaki na ye.


Nzokande, mpo na ngai, namonaki likambo moko te oyo ekokaki komemela ye etumbu ya kufa. Kasi lokola ye moko asengi ete akende kosamba liboso ya mokonzi monene, ngai mpe nazwi mokano ya kotinda ye na Rome.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ