Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 26:15 - Mokanda na Bomoi

15 Kasi boyeba ete soki bobomi ngai, bokomema ngambo ya pamba na bomoi na bino mpe na engumba oyo elongo na bavandi na yango nyonso, likolo ya makila ya moto oyo ayebi likambo te ; pamba te, solo penza, Yawe nde atindaki ngai epai na bino mpo na koyebisa bino maloba nyonso oyo, mpo ete boyoka yango. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 26:15
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe alobaki : — Osali nini ? Likambo nini penza osali ? Makila ya ndeko na yo ezali koganga wuta na mabele kino epai na Ngai.


Ribeni alobaki na bango : — Nayebisaki bino ete bosala mwana wana mabe te ? Kasi boyokelaki ngai te. Sik’oyo tosengeli kofuta makila na ye !


bakisa makila oyo asopaki, makila ya bato oyo bayebi likambo te. Pamba te atondisaki Yelusalemi na makila ya bato oyo bayebaki likambo te ; mpe Yawe aboyaki kolimbisa ye.


Mokonzi Joasi abosanaki bolamu nyonso oyo Yeoyada, tata ya Zakari, asalelaki ye, mpe abomaki Zakari, mwana mobali ya Yeoyada. Tango azalaki kokufa, Zakari alobaki : « Tika ete Yawe amona mpe akata likambo oyo ! »


Yawe ayinaka makambo wana motoba ; mpe makambo oyo sambo ezali mabe penza na miso na Ye :


Kodongola, lolemo ya lokuta, maboko oyo ebomaka moto oyo asali mabe te,


« Napesaki bato na yo etumbu ya pamba ; pamba te bazwaki na bango kaka mayele te. Mopanga na yo ebomi basakoli na yo ndenge nkosi ebomaka bato.


Kino na bilamba na yo, bato bamonaka makila ya babola, ya bato oyo bayebi likambo te mpe okangi bango na mabe te.


« Kasi yo, miso mpe motema na yo elukaka kaka bomengo mpo na bolamu na yo moko kaka, na nzela ya kosopa makila ya bato oyo bayebi likambo te, na nzela ya konyokola bato mpe na nzela ya kobotola bango biloko. »


tala liloba oyo Yawe alobi : Bosalela bosembo mpe bosolo ; bokangola wuta na maboko ya monyokoli moto oyo bazali konyokola ! Bonyokola te bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali ; bosala mpe bango mabe te. Bosopa te na esika oyo, makila ya bato oyo bayebi likambo te.


Jeremi alobaki na bakambi mpe na bato nyonso : « Yawe atindi ngai kosakola mpo na Ndako mpe engumba oyo, makambo nyonso oyo bosili koyoka.


Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi :


soki botiki konyokola bapaya, bana bitike to basi bakufisa mibali, mpe botiki kosopa makila ya bato oyo bayebi likambo te, soki botiki kolanda banzambe mosusu oyo na nzela na yango bomibendelaka pasi,


Bokokomisa mbindo te mokili epai wapi bozali. Solo, kosopa makila ekomisaka mokili mbindo ; pamba te soki makila esopani na mokili, ezali kaka na nzela ya makila ya moto oyo asopi yango nde bakoki kokomisa lisusu mokili peto.


Yuda, ye oyo asengeli koteka Ye, alobaki : — Moteyi, ezali ngai ? Yesu azongiselaki ye : — Olobi yango.


bayokanaki kosalela mayele mabe mpo na kokanga Yesu mpe koboma Ye.


Bongo, afukamaki mpe agangaki makasi : — Nkolo, kotangela bango lisumu oyo te ! Tango kaka Etieni alobaki bongo, akufaki.


Bosala bongo mpo ete makila ya moto oyo ayebi likambo te esopana te kati na mokili na bino oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino lokola libula, soki te bokomema ngambo ya makila.


Mpo ete basopaki makila ya basantu mpe ya basakoli na Yo, mpe opesi bango makila mpo ete bamela ndenge ekoki mpo na bango. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ